Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

GÉORGIE | 1924-1990

Makita esalisaka bato nyonso bákolisa kondima

Makita esalisaka bato nyonso bákolisa kondima

Makita ya bokristo ezalaki na ntina mingi mpo esalisaki bato ya sika bákolisa kondima. Kutu, baoyo bazwaki batisimo sika bazalaki kosepela kopesa bandako na bango mpo na kosala makita kaka ndenge bandeko oyo baumelaki na solo bazalaki kosala. Bazalaki koyamba malamu moto nyonso oyo azalaki koya na makita mpe yango esalaki ete bolingo na bango ekóma lisusu makasi.

Soki bayekoli ya Biblia ebele balingi kozwa batisimo, makita ezalaki kosalema na kobombana. Na sanza ya mwambe na 1973, bandeko babongisaki likita moko ya ndenge wana, na Soukhoumi, pene ya bokula ya Mbu Moindo. Kasi ntango ezangaki mpo na kobatisa bato 35 oyo balingaki kozwa batisimo! Liboso likita yango esila, bapolisi bakataki likita yango, bakangaki bandeko basi ná mibali, ata mpe ndeko Vladimir Gladyuk.

Ntango kaka batikaki ndeko Vladimir ná bandeko mosusu, bakutanaki lisusu na bandeko nyonso oyo basengelaki kozwa batisimo. Nsukansuka, nsima ya mikolo mibale ya likita ya liboso, bandeko yango bazwaki batisimo. Vladimir alobi boye: “Tomonaki mpenza ete Yehova azalaki na ngámbo na biso. Nsima ya batisimo, biso nyonso tobondelaki mpo na kopesa Yehova matɔndi.”

Botɛmɛli esalaka ete nsango malamu epalangana

Mikolo mibale nsima ya kobatisa bato, bakangaki lisusu ndeko Vladimir Gladyuk. Na nsima bakatelaki ye, ndeko Itta Sudarenko, ná Natela Chargeishvili, bambula ebele ya bolɔkɔ. Atako basakoli bayokaki mawa ndenge bakangaki bandeko yango, bazwaki ekateli ya kokoba kosakola, kasi na bokɛngi mpenza.

Mpo bábenda likebi ya bakonzi te, basakoli bazalaki kokende kosakola na bingumba mpe na bamboka mosusu. Yango wana botɛmɛli esalaki ete nsango malamu epalangana na bisika mingi koleka.

Na bingumba ya minene, ntango Bakoministe bazalaki koyangela, basakoli bazalaki kosakola na babalabala oyo bato balekaka mingi te mpe na baparkɛ. Mbala mingi bazalaki kokutana na bato oyo bauti na bingumba mpe bamboka mosusu, baoyo bazalaki koya kotala bandeko na bango to kosomba biloko. Soki moto moko asepeli, basakoli bazalaki kosɛnga adrɛsi na ye mpe bazalaki kozwa bibongiseli mpo bákutana lisusu.

Ndeko mwasi Babutsa Jejelava azali na kati ya bandeko oyo basalaki mibembo mingi na wɛsti ya Géorgie mobimba. Alobi boye: “Lokola nazalaki na bandeko mingi na bisika ndenge na ndenge, moto moko te akokaki kozwela ngai makanisi mabe ndenge nazalaki kosala mibembo mingi. Nsima ya mbula soki 2, nakómaki koyekola Biblia na bato koleka 20 na Zougdidi mpe bato 5 na engumba Chkhorotskou. Bango nyonso bazwaki batisimo.”

Mposa makasi ya mikanda na monɔkɔ ya Géorgien

Eumelaki te, emonanaki polele ete bato bazalaki na mposa makasi ya mikanda na monɔkɔ ya Géorgien. Ntango basakoli bazalaki kozongela bato to kotambwisa boyekoli ya Biblia, bamonaki ete ebongi bázala na Biblia mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ oyo bayekoli na bango bayebi malamu. *

Ndeko Babutsa azali koyeba lisusu ndenge ezalaki mpasi kotambwisa boyekoli ya Biblia kozanga mikanda ya monɔkɔ ya Géorgien. Alobi boye: “Nazalaki kaka na Biblia mpe mikanda mosusu na monɔkɔ ya Russe, yango wana mbala mingi esengelaki nabongolaka makambo nakoyekola na bayekoli na ngai.” Kaka diksionɛrɛ mpamba nde esalisaki ye abongola bazulunalo na biso na monɔkɔ ya Géorgien. Abongolaki mpe Evanzile mobimba ya Matai!

Batatoli ya molende basalelaki bamasini ya mike ya kosala bafotokopi mpo na kobimisa mikanda na bandako na bango

Bato oyo basepelaki na solo bazalaki kosepela na masolo oyo abongolaki na monɔkɔ ya mboka na bango, yango wana bandimaki kosala bakopi na yango na mabɔkɔ mpo na boyekoli na bango moko. Lokola ezalaki mpasi kozwa Biblia na monɔkɔ ya Géorgien, bayekoli mosusu ya Biblia bakómaki kosala bakopi ya Liloba ya Nzambe.

“Nasalaki kopi yango mokolo mobimba”

Mikanda oyo babongolaki na monɔkɔ ya Géorgien ezalaki kotambola na mabɔkɔ ya bandeko mpe bato oyo basepelaki na solo mpo moto na moto atánga na ngala na ye. Moto mokomoko azalaki kaka na mikolo moke to mwa bapɔsɔ mpo na kotánga mokanda moko. Yango wana, ntango Makomami ya Grɛki ya bokristo na Géorgien ya sika ezalaki koleka epai ya bandeko, libota moko ezwaki mokano ya kosala kopi na yango.

Raul Karchava azalaki kaka na mbula 13 ntango tata na ye asɛngaki ye asala kopi yango. Alobi boye: “Tata asombaki pake mobimba ya bakaye mpe babiki ná bakrɛyɔ ya ndenge nyonso, mpo akanisaki ete yango ekolendisa ngai. Atako ebangisaki ngai, nandimaki kosala yango. Nasalaki kopi yango mokolo mobimba, nabandaki kotika kaka mpo na kopemisa mabɔkɔ mwa moke.”

Bakopi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo na monɔkɔ ya Géorgien oyo basalaki na mabɔkɔ

Bandeko ya Raul basepelaki mingi ntango bayokaki ete bandeko bandimi kotikela bango buku wana ya ntina mingi mwa bapɔsɔ lisusu mpo elenge Raul asilisa mosala monene oyo azalaki kosala. Kaka na sanza mibale mpamba, asilisaki kosala kopi nyonso ya mikanda 27 ya Makomami ya Grɛki ya bokristo.

Atako bandeko basalaki milende mpo na kosala bakopi yango, lokola bayekoli ya Biblia bazalaki se kobakisama nzala na bango ya elimo ezalaki kaka kosila te. Mpo na kokokisa mposa yango, bandeko basi mpe mibali ya molende babandaki mosala ya kobimisa mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na bandako na bango atako kosala bongo ezalaki likama.

Mosala ya kosakola na wɛsti ya Géorgie ezalaki se kokende liboso. Bongo na ɛsti? Ezalaki nde na moto moko na engumba-mokonzi, Tbilissi, oyo akokaki kosalisa bato oyo bazalaki koluka solo na bosembo lokola Vaso Kveniashvili, oyo tolobelaki na ebandeli?

Solo ekómi na engumba-mokonzi

Na boumeli ya bambula ya 1970, bakonzi ya Union Soviétique bakómaki kobengana Batatoli ya Yehova na bandako na bango na bisika ndenge na ndenge mpo bálɛmba nzoto. Yango nde likambo ekómelaki Oleksii ná mwasi na ye Lydia Kurdas, bato ya Ukraine oyo bayaki kofanda na Tbilissi. Balekisaki bambula ebele na bolɔkɔ, na Union Soviétique mpo na kondima na bango.

Larisa Kessaeva (Gudadze) na bambula ya 1970

Bato ya libota ya ndeko Kurdas bateyaki Zaur ná Eteri Kessaev solo mpo bazalaki kolinga makambo ya Nzambe mingi mpenza. Mwana na bango Larisa, oyo azalaki na mbula 15 na ntango wana, alobeli mbala ya liboso oyo bakutanaki na ndeko Oleksii ná Lydia: “Tolukaki kondimisa bango ete Lingomba ya Ortɔdɔksɛ nde lingomba kaka moko ya solo. Nsima ya kosolola mingi, makambo ya koloba esilaki biso, kasi bango bakobaki kokanisa na biso na Biblia.”

Larisa alobi lisusu: “Ntango tozalaki kokende na eglize, nazalaki ntango nyonso kotánga Mibeko Zomi oyo bakomá na efelo na katikati ya bikeko mibale. Kasi na mpokwa wana, ntango Oleksii atángelaki biso Kobima 20:4, 5, nasilaki mayele. Na butu wana nazalaki kozwa mpɔngi te mpo nazalaki kaka kokanisa: ‘Ezali mpenza solo ete lokola tosambelaka bikeko tobukaka nde mobeko ya Nzambe?’”

Mpo na kosilisa likambo yango, Larisa akendeki na eglize na ntɔngɔntɔngɔ mpe atángaki lisusu mobeko yango oyo elobi, “Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami . . . Osengeli te kogumbamela yango.” Ezalaki mbala ya liboso na bomoi na ye ayeba ndimbola ya mobeko wana ya Nzambe. Nsukansuka, Larisa ná baboti na ye bazwaki batisimo mpe bazalaki na kati ya Batatoli ya Yehova ya liboso na Tbilissi.

Koluka bosembo ememelaki ye matomba

Mbula soki 20 nsima ya koyoka nsango malamu, Vaso Kveniashvili akutanaki na moto moko oyo ayanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova na Tbilissi. Vaso asepelaki mingi kokutana lisusu na Batatoli ya Yehova. Azelaki yango banda kala mpenza.

Vaso Kveniashvili akómaki Motatoli ya Yehova mbula soki 24 nsima ya koyoka nsango malamu

Kasi liboso, Batatoli ya mboka yango bazalaki koboya kokɔtisa ye na makambo ya lisangá, mpo bayebaki ete Vaso azalaki moto ya mobulu. Bandeko mosusu kutu bazalaki kokanisa ete bakonzi ya Union Soviétique nde batindi ye aya koyeba makambo na bango. Yango wana, na boumeli ya mbula minei mobimba, bapesaki Vaso nzela ya koyangana na makita te.

Nsukansuka, ntango bamonaki polele ete Vaso azali na makanisi mabe te nde bandimaki azwa batisimo, akóma moko ya bandeko ya lisangá. Na yango, Vaso azwaki likoki ya kopusana penepene na ‘Nzambe ya bosembo’ oyo abandaki koluka banda bolenge na ye! (Yis. 30:18) Asalelaki Yehova kaka na molende tii liwa na ye na 2014.

Na bambula ya 1990, mosala ya kosakola ezwaki misisa na Géorgie, ezala na wɛsti to na ɛsti. Basakoli soki 900 bazalaki koyekola Biblia na bato 942. Moboko etyamaki mpo na bokoli monene oyo esengelaki kosalema na nsima.

^ par. 12 Na mikili ya Bakoministe, Babiblia ezalaki mingi te, atako Biblia ebongolamaki na monɔkɔ ya Géorgien na ebandeli mpenza ya siɛklɛ ya mitano ya ntango na biso.—Talá etanda “Biblia na monɔkɔ ya Géorgien.”