Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Ndenge ya koteya mwana asalelaka Internet na mayele

Ndenge ya koteya mwana asalelaka Internet na mayele

MOKAKATANO

Bansango oyo elekaka na radio to televizyo etindaka yo omona ete bato ya mobulu, baoyo basangisaka na bato nzoto na makasi mpe baoyo bayibaka na mikanda ya Leta ya bato mosusu basalelaka mingi Internet. Ozali na ntina ya komitungisa mpo mbala mingi mwana na yo akɔtaka na Internet mpe ayebi te likama oyo yango ekoki kobimisela ye.

Okoki kolakisa mwana na yo ndenge ya kosalela Internet na mayele. Kasi, liboso, talá makambo mosusu oyo elekaka na Internet, oyo osengeli koyeba.

OYO OSENGELI KOYEBA

Bilenge bakoki kokɔta na Internet na batelefone. Mobeko ya kotya ordinatɛrɛ na esika oyo bato nyonso bakoki komona na ndako ezali kaka na ntina. Kasi soki mwana na yo azali na telefone oyo ekoki kosalisa ye akɔta na Internet, akoki koyeba makambo mingi oyo ezali koleka na mokili mobimba kozanga ete oyeba yango.

Atako bato mosusu basalaka baaksida ya motuka, yango elingi koloba te ete kokumba motuka ezali mabe. Ndenge moko mpe mpo na likambo etali kosalela Internet. Mwana na yo azali nde na mposa ya koyeba ndenge ya “kosalela” yango na mayele

Bilenge mosusu balekisaka ntango mingi na Internet. Elenge mwasi moko ya mbula 19 alobi boye: “Nalobaka ete nakosala kaka miniti mitano mpo na kotánga bamesaje oyo batindeli ngai na Internet kasi nsukansuka nalekisaka bangonga mingi na kotala bafilme. Esengeli mpenza nayeba komipekisa.”

Bilenge bakoki kotya makambo mingi oyo ebongi te kotya na Internet. Bato mabe bakoki kosangisa makambo mpe bafɔtɔ oyo bilenge batyaka na Internet mpo na koyeba bisika oyo bilenge yango bafandaka, batángaka mpe ntango oyo batikalaka bango moko na ndako.

Bilenge mosusu bayebaka te soki makambo oyo bazali kotya na Internet ekoki kobimisa nini. Makambo oyo moto atye na Internet etikalaka na Internet. Na ndakisa, na bantango mosusu moto oyo akozala patrɔ na yo akoya komona makambo mpe bafɔtɔ ya mabe oyo otyaki na Internet ntango azali kotalela mokanda oyo okomaki mpo na koluka mosala.

Ata bongo, kobosana te ete Internet ezali monguna na yo te. Soki osaleli yango na mayele te nde ekoki kobimisela yo likama.

OYO OKOKI KOSALA

Teyá mwana makambo oyo ebongi kotya na esika ya liboso mpe ndenge malamu ya kosalela ntango. Mpo moto akóma mokóló oyo ayebi kokokisa mikumba na ye, asengeli koyeba makambo nini ebongi kotya na esika ya liboso. Kosolola na libota, badevuare mpe misala ya ndako ezali na ntina koleka kokɔta na Internet kaka mpamba. Soki ozali komitungisa mpo mwana na yo azali kolekisa ntango mingi na Internet, tyelá ye bandelo; okoki ata kosalela chronomètre soki esengeli.​—Toli ya Biblia: Bafilipi 1:10.

Teyá mwana akanisaka malamu liboso ya kotya makambo na Internet. Salisá ye amitunaka mituna lokola oyo: Makambo oyo nalingi kotya na Internet ekobɛtisa moto moko libaku? Fɔtɔ oyo nalingi natya, ekomonisa ete nazali moto ya ndenge nini? Nakoyoka nsɔni soki baboti na ngai to mikóló mosusu bamoni fɔtɔ to makambo oyo natye na Internet? Soki bamoni yango bakozwa ngai ndenge nini? Nakokanisa nini soki namoni moto moko atye makambo to fɔtɔ ya boye na Internet?​—Toli ya Biblia: Masese 10:23.

Teyá mwana asuka kaka te na kotosa mibeko kasi amonisaka mpe bizaleli malamu. Okoki koyeba te makambo nyonso oyo mwana na yo asalaka. Longola yango, mokumba na yo ya moboti ezali te ya koluka koyeba makambo nyonso oyo mwana na yo azali kosala kasi nde ya kosalisa ye ‘asalelaka makoki na ye ya kososola mpo akesenisaka mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Na yango, na esika oluka libosoliboso kotyelaka ye mibeko mpe kopesa ye bitumbu, salisá ye nde asalelaka makoki na ye ya kososola. Akolinga azala na lokumu nini? Bayeba ye na bizaleli nini? Mposa na yo ezali ya kosalisa mwana azwaka bikateli ya malamu, ezala ozali wana to te.​—Toli ya Biblia: Masese 3:21.

“Bana bayebi makambo mingi oyo etali baaparɛyi. Kasi baboti bayebi makambo mingi ya bomoi”

Kosalela Internet, ndenge moko na kokumba motuka, esɛngaka ete moto akanisa malamu kasi asuka kaka te na koyeba kosalela baaparɛyi yango. Na yango, lisalisi na yo moboti ezali na ntina mingi. Kutu, Parry Aftab moto moko ya mayele na makambo ya Internet alobi boye: “Bana bayebi makambo mingi oyo etali baaparɛyi. Kasi baboti bayebi makambo mingi ya bomoi.”