LAMUKÁ! Sanza ya Juin 2014 | Kozala moninga malamu esɛngaka nini?

Likambo ya mawa, kozwa moninga ya solosolo ekómi mpasi lelo. Esengeli kozala bongo? Esɛngaka nini mpo boninga eumela? Talá batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Ezali mpe na masolo oyo: mokakatano oyo balopitalo oyo ebombaka makei ya bomwasi mpe mai ya mibali na malili na Canada ezali na yango, kolya mwa banyama mikemike na esika ya kolya mosuni ya nyama, mpe biro ya sika ya kosala milulu ya mabala oyo bato oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka bafungoli na Irlande.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kozala moninga malamu esɛngaka nini?

Bato mingi bamonaka ete ezali na ntina kozala na baninga malamu. Ndenge nini okoki kozala moninga malamu mpo na basusu? Lisolo oyo elobeli toli minei oyo ezali na Biblia, oyo ekoki kosalisa yo.

BIBLIA ELOBI NINI?

Liwa

Nini ekómelaka biso soki tokufi? Elikya ya kokutana lisusu na bandeko na biso oyo bakufá ezali? Talá biyano ya kolendisa oyo Biblia epesi mpo na liwa.

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Joseph Priestley

Ata ntango azalaki kokoma makambo ya siansi to ya lingomba, Joseph Priestley aboyaki makanisi mpe mateya ya bonkɔkɔ mpo na kolongisa solo. Talá ndenge makambo oyo amonaki mpe makomi na ye esalisaka bato tii lelo oyo.

Maladi ya misuni ya mino​—Ekoki mpe kozwa yo?

Maladi ya misuni ya mino ezali maladi ya monɔkɔ oyo enyokolaka bato mingi na mokili. Nini ebimisaka yango? Ndenge nini okoki koyeba soki ozali na yango? Ndenge nini okoki komibatela mpo maladi yango ezwa yo te?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya kosalela mbongo na mayele

Kozela te tii ntango mbongo ekosila bongo otalela ndenge na yo ya kobimisa mbongo. Yekolá ndenge ya kosalela mbongo liboso elimwa na mabɔkɔ na yo.

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Likoki oyo mwa nyama oyo elyaka nyɛi (coléoptère) ezalaka na yango ya koyeba nzela

Mwa nyama yango esalelaka mayele nini mpo na kotambola na butu? Mpe bato bakoki koyekola nini epai ya mwa nyama yango?

Makambo mosusu

Oyo bilenge mosusu balobi mpo na telefone

Mpo na bilenge mingi, telefone esalisaka na kozwa baninga. Bolamu mpe makama na yango ezali nini?

Moize akoli na Ezipito

Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo elekaki na bomoi ya Moize ntango azalaki mwana moke na Ezipito? Zwá makambo oyo mpe bólobela yango na libota.