Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na bolingo

Zalá na bolingo

Mokakatano

Likanisi ya kokanisela bato mabe esilaka nokinoki te. Kaka ndenge esɛngaka ntango mpe milende mpo na kosilisa virus to maladi mabe moko boye, esɛngaka mpe ntango mpe milende mpo na kotika kokanisela basusu mabe. Okoki kosala nini mpo na kotika kokanisela baninga mabe na motema na yo?

Toli ya Biblia

“Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—BAKOLOSE 3:14.

Elingi koloba nini? Kosalela bato makambo na boboto etindaka bato bálingana. Ntango ozali kolinga basusu mingi, okokanisela bango mabe ata moke te. Ntango okómi kolinga bato mingi, makanisi mabe ekolongwa na motema na yo.

Oyo okoki kosala

Kanisá makambo oyo okoki kosala mpo na komonisa bolingo epai ya bato oyo bauti na mwa etuluku moko oyo mbala mosusu okaniselaka mabe. Makambo yango esengeli kozala ya mindɔndɔ te. Meká kosala boye:

Ntango ozali kosala makambo ya mikemike oyo ezali komonisa bolingo, okotika kokanisela basusu mabe

  • Soki moto ya mwa etuluku yango azali koluka adrɛsi, lakisá ye; ntango bozali na motuka, tikelá ye esika ya kofanda to fungolelá ye porte.

  • Meká kosolola na moko na bango atako ayebi monɔkɔ na bino malamumalamu te.

  • Zalá na motema molai ntango basali likambo oyo esepelisi yo te.

  • Mityá na esika na bango ntango bazali kolobela mikakatano na bango.