Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 3 2021 | Osengeli kondimela Mozalisi?—Talá makambo oyo

Bato bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na oyo etali ndenge molɔ́ngɔ́ mpe bomoi ebandá na mabele. Nimero ya Lamuká! oyo ekosalisa yo omona makambo ya sikisiki mpenza mpe na nsima yo moko okata soki oyo wapi ezali solo. Molɔ́ngɔ́ ebimá kaka yango moko to Nzambe nde asalaki yango? Eyano okopesa na motuna oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi na yo.

 

Makambo nini osengeli kotalela?

Mituna oyo etali bozalisi mpe ndenge bomoi ebandá ebulunganisaka bato.

Makambo oyo molɔ́ngɔ́ ezali koteya biso

Emonani ete molɔ́ngɔ́ mpe mabele esalema mpo bikelamu ya bomoi ekoka kofanda na kati. Ekoki kozala bongo mpo esalemá mpe ekelamá?

Makambo oyo bikelamu ya bomoi ekoki koteya biso

Bikelamu ya bomoi esalaka ete mabele ezala kitoko koleka baplanɛti mosusu nyonso. Bikelamu ya bomoi eteyaka biso nini mpo na ndenge bomoi ebandá?

Makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso te

Siansi elongi koyebisa biso ndenge molɔ́ngɔ́ mpe bomoi ebanda?

Makambo oyo Biblia elobi

Masolo na yango eyokani na siansi?

Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete Mozalisi azali?

Soki bilembeteli yango endimisi yo ete Nzambe-Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali, okozwa matomba sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

Luká kotalela bilembeteli

Luká kotalela bilembeteli mpo na koyeba soki Mozalisi azali to te.