Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mwa bandako oyo babengi yourtes na lobwaku ya Tash Rabat

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Kirghizstan

Mobembo moko na Kirghizstan

KIRGHIZSTAN ezali ekólo oyo ezwami na Azia ya ntei mpe ezingami na bangomba oyo ezipamá na baglasi; ekaboli ndelo ná Kazakhstan, Ouzbékistan, Tadjikistan mpe Chine. Eteni monene ya mboka yango (90 %) ezali bangomba. Ngomba oyo eleki molai (mɛtrɛ 7 439) na bangomba ya Tianshan na kotalela nivo ya mbu, ezali nde na Kirghizstan. Mwa eteni ya mabele ya ekólo yango (4 %) ezali zamba. Simbá ete na bazamba nyonso ya mokili, banzete oyo ebotaka ndika ebotaka mingi nde na zamba ya Kirghizstan.

Batatoli ya Yehova bazali koteya ebele ya bato Biblia na Kirghizstan

Bato ya ekólo yango bayebani na bizaleli lokola koyamba bapaya mpe limemya. Na Kirghizstan, ezalaka mabe te kosalela liloba “bino” ntango ozali kosolola na mokóló mpe olingi otikela ye esika ya kofanda na bisi ata mpe kiti ya malamu na mesa.

Na libota, bana bazalaka mingimingi misato to koleka. Mbala mingi, mwana-mobali ya nsuka afandaka na baboti ata nsima ya kobala mpo na kobatela bango ntango bakómi mibange.

Balakisaka bilenge basi ndenge ya kobongisa ndako ntango bazali naino bana mike. Soki bakokisi mbula soki 15, bayebaka mpenza misala ya ndako. Mbala mingi babongisaka biloko ya libala mpo na mwana-mwasi. Biloko yango ekoki kozala bolangiti ya ndenge nyonso, bilamba ya ndenge na ndenge mpe tapi oyo basali na mabɔkɔ. Mobali apesaka mbongo ya libala mpe bibwɛlɛ.

Na milulu wana, babomaka mpate to mpunda. Na matánga mpe basalaka bongo. Bakataka nyama yango bitenibiteni mpe eteni mokomoko ezali na moto oyo akolya yango. Bapesaka yango na kotalela mbula to lokumu oyo moto azali na yango; basalaka bongo mpo na komonisa limemya. Na nsima bakabolaka elubu ya mboka yango oyo babengi beshbarmak. Balyaka yango na mabɔkɔ.

Komuz ezali ebɛtɛli ya miziki oyo eyebani mingi