Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali mikili ya Amerika

Makambo etali mikili ya Amerika

Makambo oyo euti kosalema na mikili ya Wɛsti emonisi ete toli ya Biblia esilaka ngala te.

Koboya kotánga bamesaje mingi, ekitisaka mitungisi?

Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Vancouver, na Canada elobi ete bato bakoki kokitisa mitungisi na bango soki bazali kotánga bamesaje kaka mbala misato na mokolo na esika ya kotánga yango ntango nyonso. Kostadin Kushlev, oyo akambaki ankɛtɛ yango, alobi boye na nsuka: “Bato bakokaka te kokanga mposa ya kotánga bamesaje, kasi kokanga mposa yango ekoki kokitisa mitungisi.”

OMITUNA BOYE: Lokola tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” boye tosengeli te koluka ndenge ya kokitisa mitungisi?2 Timote 3:1.

Bambisi ekómi lisusu ebele

Lapolo ya ebongiseli moko (Wildlife Conservation Society) elobi boye: “Bambɛmbɛ, sanya (kosakosa) mpe bambisi mosusu na bamai ya Bélize mpe na bisika mosusu ya Caraïbe ezongi lisusu mpo guvɛrnema epekisaki bato bábomaka yango.” Ebakisi boye: “Soki bapekisi bato bábomaka mbisi oyo elingi kosila, mbisi yango ezongaka lisusu mingi nsima ya mbula moko tii motoba, kasi mpo ezonga ndenge ezalaki . . . ekoki kozwa bambula ebele.” Janet Gibson, mokambi ya ebongiseli yango, alobaki boye mpo na Bélize: “Ezali polele ete na bisika oyo bapekisá koboma mbisi, bambisi mpe bikelamu mosusu ya ndenge na ndenge ekoki kokóma lisusu mingi.”

OMITUNA BOYE: Ndenge bikelamu ya bomoi ebotaka lisusu ata soki etikali moke, emonisi te ete Mokeli moko ya bwanya nde akelá yango?Nzembo 104:24, 25.

Mobulu na Brésil

Lapolo moko ya news service Agência Brasil elobi ete mobulu ezali kobakisama na Brésil. Na 2012, bato koleka 56 000 babomamaki—motángo yango eleki monene na mitángo nyonso oyo Ministre ya sante abimisá. Luís Sapori, moto ya mayele na makambo etali kimya ya mboka alobi ete ndenge mobulu yango emati emonisi ete bizaleli ya bato ebebi. Alobaki ete soki bato bakómi kobuka mibeko ya mboka, “bakómaka kosala makambo na nko mpo bálongisa matomba na bango.”

OYEBAKI YANGO? Biblia esakolaki ntango oyo bolingo ya bato “ekokita” mpe makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi.Matai 24:3, 12.