Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Baroma bapesaki nzela bákunda Yesu na lilita, moto oyo bango babomaki mpe babakaki na nzete?

BATO mingi bayebi lisolo oyo babomaki Yesu mpe babakaki ye na nzete elongo na basali-mabe mibale. (Mat. 27:35-38) Kasi, bato mosusu balobaka ete Biblia elobi solo te ntango elobi ete nzoto ya Yesu ebongisamaki na nsima mpo na kokundama mpe batyaki yango na lilita.​—Mrk. 15:42-46.

Bato mosusu oyo batyolaka Baevanzile bandimaka te ete bakundaki moto oyo abomamaki, elingi koloba, batyaki ye na lilita. Kutu, bato yango bandimaka ete ekoki kozala ete baoyo bazalaki kobomama lokola bato mabe, bazalaki kosalela bango makambo ndenge mosusu. Mopanzi-nsango moko na nkombo Ariel Sabar, oyo akomaki na zulunalo Smithsonian, alimboli ntina oyo bato mosusu bazalaka na likanisi wana, alobi boye: “Kokakisa moto na nzete ezalaki etumbu oyo bazalaki kopesa bato oyo bazalaki basali-mabe mpenza kati ya bato, mpe bato mosusu ya mayele balobaka ete ezalaki nsɔni kokanisa ete Baroma bápesa bato yango lokumu mpe bákunda bango na lilita.” Baroma bazalaki na mposa ya koyokisa basali-mabe yango nsɔni, yango wana bazalaki kotika bibembe na bango likoló ya nzete mpo banyama ya zamba elya yango. Nsima na yango, bazalaki kosangisa mikuwa ya bibembe na bango mpe bazalaki kobwaka yango na lilita moko.

Kasi, arkeoloji emonisi makambo ndenge mosusu, mingimingi mpo na mikuwa oyo etikalá ya mwa Bayuda oyo babomamaki. Na mobu 1968, bazwaki mikuwa oyo etikalaki ya moto moko oyo abomamaki na siɛklɛ ya liboso. Bazwaki yango na lilita moko ya libota moko ya Bayuda pene na Yerusaleme. Mikuwa ezwamaki na kɛsi moko ya kobomba mikuwa. Mokuwa moko ya litindi ezalaki na kati ya mikuwa oyo etikalaki. Mokuwa yango ebɛtamaki nsɛtɛ moko ya santimɛtrɛ 11 na ndambo likoló ya libaya moko. Ariel Sabar alobi: “Litindi yango ezalaki ya moto moko na nkombo Yehochanan, yango epesaki elembeteli oyo emonisaki ntina oyo lisolo ya Evanzile oyo elobeli kokundama ya Yesu na lilita ezalaki solo.” Na ntembe te, “litindi ya Yehochanan ezalaki ndakisa moko oyo emonisi ete moto moko oyo akakisamaki na nzete na mikolo ya Yesu, oyo Baroma bapesaki nzela bákunda ye ndenge Bayuda bazalaki kokunda bato.”

Bato bazali na makanisi ndenge na ndenge na likambo etali ndenge Yesu abomamaki likoló ya nzete na kotalela makambo oyo mokuwa ya litindi ya Yehochanan emonisi yango. Kasi emonani polele ete bato mosusu oyo babomamaki bakundaki bango mpe babwakaki bango na lilita moko. Emonani mpe ete makambo oyo Biblia elobi mpo na nzoto ya Yesu oyo etyamaki na lilita moko ezali solo. Bilembeteli emonisi ete makambo oyo Biblia elobi ete babongisaki nzoto ya Yesu mpe bakundaki yango na lilita moko ezali mpenza solo.

Oyo eleki ntina, Yehova asakolaki ete Yesu akokundama na lilita ya mozwi moko, mpe moto moko te akoki kopekisa Liloba ya Nzambe ekokisama.​—Yis. 53:9; 55:11.