Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Paradiso ezali kozela baoyo bakobika ntango nsuka ya mokili ekoya

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Tozali na “mikolo ya nsuka”?

Okopesa eyano nini?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

Oyo Biblia elobi

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Bisakweli ya Biblia ná makambo oyo ezali kosalema lelo ezali komonisa ete tozali na “mikolo ya nsuka.”

Makambo nini mosusu tokoki koyekola na Biblia?

  • Na mikolo ya nsuka tokomona makambo lokola bitumba, banzala, koningana ya mabele mpe bamaladi mabe oyo epalanganaka.Matai 24:3, 7; Luka 21:11.

  • Na mikolo ya nsuka bizaleli mpe makanisi ya bato ekobeba mpenza.2 Timote 3:2-5.

Bomoi ya bato ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?

Bato mosusu bakanisaka . . . ete ntango nsuka ya mokili ekoya, mabele ekobebisama ná bato nyonso oyo bafandi na mabele, kasi basusu bakanisaka ete makambo ekobonga. Yo okanisaka nini?

Oyo Biblia elobi

“Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”Nzembo 37:29.

Makambo nini mosusu tokoki koyekola na Biblia?