Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI No 3 2021 | Ndenge ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya!

Okosala nini mpo ozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Masolo ya zulunalo oyo ekosalisa yo otalela makambo oyo okoki kosala. Ekosalisa yo mpe oyeba esika kaka moko oyo okoki kozwa toli ya malamu mpo ozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.

 

Ndenge ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya

Ntango likambo moko ya mbalakaka mpe oyo ekanami te esalemi na esika oyo bozali kofanda, osengeli kotya motema na nini?

Nini ekoki kosalisa yo oyeba ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya?

Bato mingi oyo batángaka minzoto, feng shui, to mpe oyo basambelaka bankɔkɔ, ata mpe baoyo bandimelaka litya oyo elobaka ete moto abotamaka lisusu, bakanisaka ete nguya moko oyo emonanaka te nde etambwisaka bomoi na bango.

Bakelasi ya milaimilai mpe mbongo ekoki kopesa moto bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?

Bato mingi bamoni ete bakelasi ya milaimilai mpe mbongo ebimasaka makambo oyo bakanisaki te.

Kozala moto malamu ekopesa yo bomoi malamu na mikolo ezali koya?

Kozala moto malamu ezali na ntina, kasi yango te nde ekoki kosalisa moto mpo azala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.

Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?

Mbala mingi ntango tolingi kozwa bikateli, tolukaka toli epai ya moto moko oyo aleki biso na mbula mpe azali na bwanya koleka biso. Ndenge moko mpe tokoki kozwa litambwisi ya malamu oyo ekoki kosalisa biso na mikolo ezali koya.

Ndenge ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya

Okanisi ete osengeli kosala nini mpo ozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?