Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | LIKABO NINI ELEKI MAKABO NYONSO?

“Ezalaki likabo oyo eleki malamu na makabo nyonso oyo nazwá”

“Ezalaki likabo oyo eleki malamu na makabo nyonso oyo nazwá”

Elenge mwasi moko ya mbula 13 alobaki maloba wana ntango bakabelaki ye mbwa. Mwasi moko oyo asalaka mimbongo alobaki ete ordinatɛrɛ oyo tata na ye akabelaki ye ntango azalaki na eteyelo ya ntei ezali likabo oyo ebongolaki bomoi na ye. Mobali moko oyo autaki kobala sika alobaki ete karte ya anivɛrsɛrɛ ya mbula moko ya libala, oyo mwasi na ye apesaki ye, ezalaki likabo oyo eleki malamu na makabo nyonso oyo azwá.

Mbula na mbula, bato mingi balekisaka ntango mingi mpe basalaka milende mingi mpo na koluka likabo oyo “eleki malamu” ya kopesa moninga to ndeko na molulu moko ya ntina mingi. Longola yango, bato mingi balingaka ete moto oyo bango bapesi likabo aloba maloba lokola oyo elobami na ebandeli ya lisolo oyo. Bongo yo? Olingaka kopesa to kozwa likabo moko oyo ekosepelisa mingi?

Koyeba likambo yango ekoki kosepelisa mingi, mpo moto oyo akozwa likabo yango akosepela na yango mingi mpe moto oyo azali kopesa akoyoka esengo ya kopesa. Kutu, Biblia elobi: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ya solo, esengo oyo moto ayokaka ntango apesi likabo ekoki kobakisama soki moto oyo azwi likabo yango amoni ete ezali na valɛrɛ mingi.

Kasi ndenge nini okoki kosala mpo likabo oyo okopesa esepelisa yo moko mpe moto oyo akozwa yango? Bongo soki ozali te na likoki ya kopesa likabo oyo “eleki malamu,” okoki kosala nini mpo likabo na yo esepelisa mpenza moto oyo akozwa yango?