Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Boboto​—Ezaleli ya ntina na miso ya Nzambe

Boboto​—Ezaleli ya ntina na miso ya Nzambe

BOBOTO oyo mobali moko ya mokóló amoniselaki elenge moko na Japon esimbaki mpenza motema na ye. Mobali yango oyo azalaki misionɛrɛ, aumelaki naino bambula mingi te na Japon mpe ayebaki naino koloba monɔkɔ ya Japonais malamu mpenza te. Kasi, pɔsɔ nyonso azalaki kokende kotala elenge mobali yango na ndako mpo na kosolola na ye masolo ya Biblia. Na mwa kosɛka mpe na boboto nyonso, azalaki koyanola na motema molai mpenza ebele ya mituna oyo elenge yango azalaki kotuna.

Elenge mobali yango abosanaka te boboto oyo misionɛrɛ wana amoniselaki ye. Elenge yango alobaki boye na motema na ye: ‘Soki Biblia nde ekoki kosala ete moto azala na boboto mpe na bolingo boye, esengeli ngai mpe nayekola yango.’ Yango nde epesaki ye mposa ya koyekola likambo oyo ezalaki mpenza mopaya epai na ye. Ya solo, boboto esimbaka mitema ya bato mpe ezali na nguya ya kobongola motema ya moto koleka maloba.

Emonisaka ete tokelamaki na elilingi ya Nzambe

Ezalaka mpasi te tómonisa boboto epai ya bandeko to baninga na biso, mpamba te boboto elimbolaka libosoliboso bolingo ya bondeko. * Kasi, boboto ezali libosoliboso ezaleli ya Nzambe. Yesu alobaki ete Tata na ye ya likoló amonisaka boboto ezala epai ya bato oyo balingaka ye to mpe epai ya “bato oyo bazangi botɔndi.” Alendisaki bayekoli na ye bámekola Nzambe na likambo yango; alobaki boye: “Bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.”​—Luka 6:35; Matai 5:48; Kobima 34:6.

Lokola bato bakelamaki na elilingi ya Nzambe, bazali na likoki ya komonisa ezaleli ya boboto. (Ebandeli 1:27) Tokoki komekola Nzambe mpe komonisa boboto epai ya bato nyonso, kaka epai ya bandeko na biso te. Biblia emonisi ete boboto ezali na kati ya bizaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo esalaka mosala. (Bagalatia 5:22) Na yango, moto akoki kokolisa ezaleli yango soki azali koyekola makambo mingi mpo na Mozalisi na biso Nzambe, mpe kopusana penepene na ye.

Boboto ezali ezaleli oyo Nzambe atyá na kati ya moto, mpe ezaleli yango ezali na motuya mingi na miso na ye; yango wana ebongi mpenza ete Nzambe asɛnga biso ‘tózalaka na boboto na kati na biso.’ (Baefese 4:32) Biblia epesi biso mpe toli oyo: “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya,” na maloba mosusu komonisela bapaya boboto.​—Baebre 13:2.

Na mokili ya lelo oyo bato mingi bazangi boboto mpe botɔndi, tokoki mpenza komonisela basusu boboto, ata mpe bato oyo toyebi te? Nini ekoki kosalisa biso tósala yango? Kutu, mpo na nini tosengeli ata komitungisa mpo na likambo yango?

Ezali na ntina na miso ya Nzambe

Likambo ya ntina, nsima ya kolobela ntina ya komonisela bapaya boboto, ntoma Paulo abakisi boye: “Mpo na nzela na yango bamosusu, bayambaki baanzelu, kasi bayebaki te.” Kanisá ndenge olingaki komiyoka soki bapesaki yo libaku ya koyamba baanzelu! Kasi, Paulo abakisi ete “bayebaki te.” Na maloba mosusu, alingaki komonisa ete soki tozali na momeseno ya komonisela basusu boboto, ata mpe bapaya to bato oyo toyebi malamu te, tokozwela yango matomba na ndenge oyo tozali kokanisa te.

Babiblia mingi oyo ezali na ndimbola ya maloba mosusu na nse ya lokasa eyokanisi maloba ya Paulo na lisolo ya Abrahama mpe ya Lota oyo ezali na Ebandeli mokapo 18 mpe 19. Na masolo yango nyonso mibale, tozali kotánga ete baanzelu bayaki epai na bango lokola bapaya mpe bamemelaki bango nsango moko ya ntina mingi. Na lisolo ya Abrahama, nsango yango etalelaki kokokisama ya elaka oyo Nzambe apesaki ye ete akobota mwana mobali, mpe mpo na Lota, nsango yango elobelaki kobebisama ya engumba Sodoma mpe Gomora oyo elingaki kosalema mosika te mpe ndenge oyo alingaki kobika na likama yango.​—Ebandeli 18:1-10; 19:1-3, 15-17.

Soki otángi bavɛrsɛ oyo ezali awa likoló, okomona ete ezala Abrahama to Lota, bango nyonso bamonisaki boboto epai ya bato oyo bazalaki baleki-nzela, oyo bango bayebaki te. Toboyi te, na ntango ya kala, koyamba bapaya, bázala bato ya mibembo to baleki-nzela​—bázala baninga to bato ya libota, to bato oyo toyebi te—​ezalaki momeseno mpe mokumba ya moto nyonso. Kutu, Mibeko ya Moize esɛngaki ete Bayisraele bákokisaka bamposa ya bapaya oyo bazalaki na ekoló na bango. (Kolimbola Mibeko 10:17-19) Atako koyamba bapaya ezalaki momeseno na ntango wana, Abrahama ná Lota basalaki koleka oyo mibeko eyaki kosɛnga na nsima. Basalaki milende mpenza mpo na komonisa boboto epai ya bapaya mpe bapambolamaki mpo na yango.

Boboto oyo Abrahama amonisaki ememelaki ye mapamboli mpo abotaki mwana mobali; ememelaki mpe biso matomba. Na ndenge nini? Abrahama ná mwana na ye Yisaka bakokisaki mokumba moko ya ntina na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Bazalaki bato ya liboso na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Masiya. Mpe bosembo na bango emonisaki ndenge oyo Nzambe akopesa lobiko epai ya bato mpo na bolingo mpe boboto na ye monene.​—Ebandeli 22:1-18; Matai 1:1, 2; Yoane 3:16.

Masolo yango emonisi eloko nini Nzambe asɛngaka epai ya bato oyo ye alingaka mpe ndenge oyo azwaka na motuya mingi ezaleli ya boboto. Boboto ezali te ezaleli oyo moto akoki komonisa soki alingi; ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe.

Komonisa boboto esalisaka biso tóyeba Nzambe malamu koleka

Biblia elobi ete na mikolo na biso bato mingi bakozala bato “bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota.” (2 Timote 3:1-3) Kozanga ntembe, okutanaka na bato ya ndenge wana mikolo nyonso. Kasi, yango esengeli te kotinda biso tótika komonisela bato boboto. Biblia eyebisi bakristo boye: “Bózongisela moto mabe na mabe te. Bósalaka nde makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso.”​—Baroma 12:17.

Tosengeli kosala makasi mpo na komonisela bato nyonso boboto. Biblia elobi ete “moto nyonso oyo alingaka . . . azwi boyebi ya Nzambe,” mpe lolenge moko ya komonisa bolingo ezali ya kozala boboto epai ya basusu. (1 Yoane 4:7; 1 Bakorinti 13:4) Ya solo, soki tozali komonisela basusu boboto, tokoyeba Nzambe malamu koleka mpe yango ekopesa biso esengo mingi. Na lisolo oyo Yesu asalaki likoló ya ngomba, alobaki boye: “Esengo na bato ya boboto​—mpo bakomonisela bango boboto. Esengo na bato ya motema pɛto—​mpo bakomona Nzambe.”​—Matai 5:7, 8, Young’s Literal Translation.

Soki oyebi te likambo ya kosala to ya koloba, lobá to salá likambo moko ya boboto

Tózwa ndakisa ya Aki, elenge mwasi moko na ekólo Japon oyo azali na bana mibale ya mibali. Ntango mama na ye akufaki na mbalakaka, Aki akómaki kotungisama mingi na makanisi. Na bantango mosusu, azalaki komiyoka mpenza mabe, yango wana akendaki kokutana na monganga. Na nsima, libota moko eyaki kofanda na kartye na ye. Tata ya libota yango autaki kokufa na likama moko mpe atikaki mwasi na ye ná bana mitano ya mike. Aki ayokelaki libota yango mawa makasi mpe asalaki nyonso mpo akóma moninga ya mama yango ná bana na ye. Lokola Aki azalaki kosala nyonso oyo akokaki mpo na libota yango, na ndakisa kopesa bango bilei, bilamba oyo libota na ye ezalaki kolata lisusu te mpe bongo na bongo, yango esalisaki ye atika kotungisama na makanisi. Amonaki ete maloba oyo ya Biblia ezali solo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ya solo, komonisela basusu boboto ekoki kozala likambo eleki malamu ya kosala mpo na yo moko ntango otungisami na makanisi.

“Kodefisa Yehova”

Komonisela basusu boboto ezali lokola “kodefisa Yehova”

Komonisa boboto esɛngaka kaka te kozala na mbongo mingi. Esɛngaka mpe te kozala na makoki mingi to na makasi ya nzoto. Kosɛka mwa moke, mwa liloba ya kobɔndisa, kosalisa moto, mwa likabo moko to ata kaka kotikela basusu nzela mpo báleka liboso na yo ekoki kosimba mpenza mitema ya bato. Soki oyebi te likambo ya kosala to ya koloba na libaku moko, lobá to salá likambo moko ya boboto. Elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, asepelaki makasi na boboto oyo misionɛrɛ wana amoniselaki ye, atako ayebaki koloba monɔkɔ na bango malamu te. Tokoki kokamwa te ndenge Nzambe atángi “kolinga boboto” na molɔngɔ ya makambo oyo asɛngi basambeli na ye!​—Mika 6:8.

Lisese moko ya Azia elobaka ete: “Liloba moko ya boboto ekoki kopesa moto molunge na boumeli ya sanza misato ya eleko ya malili.” Yango elimboli ete ata mwa likambo moke ya boboto ekoki kosala moto malamu mingi. Soki moto oyo asali yango azali na makanisi malamu mpe mingimingi soki asali yango mpo alingaka Nzambe, ekoki mpenza kosimba mitema ya bato oyo asaleli bango yango. Ata soki moto amonisi botɔndi te mpo na boboto oyo tomoniseli ye, tókanisa te ete boboto na biso ekei mpamba. Ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. Biblia emonisi ete soki tomoniseli basusu boboto, tozali nde “kodefisa Yehova.” (Masese 19:17) Mpo na nini te koluka mabaku ya komonisa boboto epai ya bato oyo bazali zingazinga na yo?

^ par. 5 Diksionɛrɛ moko (The Oxford English Dictionary) emonisi ete liloba “boboto” elimboli “bondeko; boyokani ya penepene; bolingo ya bondeko oyo eutaka na yango.”