Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tosengeli kobondelaka basantu?

Tosengeli kobondelaka basantu?

NANI yango akutaná naino te na likambo moko oyo etungisaki ye mpe esɛngaki ete aluka lisalisi ya moto mosusu? Ata soki totungisami mpo na likambo nini, na ntembe te, tokoluka moninga oyo amityaka na esika na biso mpe azali na eksperiansi ya likambo oyo ekómeli biso. Ezaleli ya komitya na esika ya basusu mpe eksperiansi nde esalaka ete moto azala moninga moko malamu mpenza.

Bamosusu mpe bakoki komona bongo mpo na libondeli. Lokola bamonaka ete Nzambe azali monene mingi mpe nsɔmɔ, yango wana na esika bábondela ye, bamonaka malamu bábondela mosantu moko. Bakanisaka ete lokola basantu yango bakutaná na bampasi mpe mikakatano oyo bato nyonso bakutanaka na yango, boye, bakomitya mpenza na esika na bango. Na ndakisa, bato mosusu oyo babungisi eloko moko ya ntina mingi bamonaka malamu bábondela “Santu” Antoine de Padoue, oyo atalelaka makambo etali biloko oyo ebungi to bayibi. Soki bazali kobondela mpo na nyama oyo ezali maladi, babondelaka “Santu” François d’Assise to soki bazali lisusu na elikya te na likambo moko, babondelaka “Santu” Jude Thaddée.

Kasi, nini ekoki kondimisa biso ete kobondela basantu eyokani na Makomami? Lokola mabondeli na biso ezalaka makambo oyo tolobaka na Nzambe, na ntembe te, tokolinga koyeba soki Nzambe ayokaka mpenza yango. Kasi, tosengeli mpe komituna boye: Ndenge nini Nzambe atalelaka likambo ya kobondela basantu?

BIBLIA ELOBI NINI NA LIKAMBO YA KOBONDELA BASANTU?

Likambo ya kobondela basantu eutá na mateya ya Lingomba ya Katolike oyo elobaka ete basantu babondelaka mpo na bato. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete likambo esimbi mpenza liteya yango ezali “kobondela mosantu moko, oyo na miso ya Nzambe azali na lotomo ya kosala bongo mpo asɛnga Nzambe amonisela moto oyo azali na bosenga motema mawa.” Na yango, baoyo babondelaka basantu bakanisaka ete Nzambe akopambola bango na nzela ya basantu yango mpo bazali na esika ya lokumu liboso na ye.

Biblia eteyaka mpe bongo? Basusu balobaka ete ntoma Paulo abandisaki likambo ya kobondela basantu na mikanda oyo akomaki. Na ndakisa, akomelaki bakristo ya Roma boye: “Bandeko, sikoyo nazali kolendisa bino na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpe na bolingo ya elimo, ete bóboma nzoto elongo na ngai na mabondeli epai ya Nzambe mpo na ngai.” (Baroma 15:30) Paulo azalaki nde kosɛnga bandeko na ye bakristo bázala balobeli na ye epai ya Nzambe? Soki moke te. Kutu, bango nde basengelaki kosɛnga Paulo, ntoma ya Kristo asala bongo mpo na bango. Paulo alingaki komonisa ete ezali mabe te kosɛnga ndeko mokristo moko abondela Nzambe asalisa biso. Kasi ekeseni mpenza na kobondela moto moko oyo tokanisi ete azali na likoló, mpo amema mabondeli na biso epai ya Nzambe. Mpo na nini?

Na Evanzile ya ntoma Yoane, Yesu alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Alobaki lisusu boye: “Nyonso oyo bokosɛnga Tata na nkombo na ngai, akopesa bino yango.” (Yoane 15:16) Yesu alobaki te ete tosengeli kobondelaka ye, mpe na nsima, ye alobela biso epai ya Nzambe. Kutu, mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli nde kobondela ye na nzela ya Yesu, kasi na nzela ya moto mosusu te.

Ntango bayekoli basɛngaki ye alakisa bango ndenge ya kobondela, Yesu alobaki boye: “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata, nkombo na yo esantisama.’” (Luka 11:2) Na yango, “ntango” to ngonga nyonso oyo tozali kobondela, tosengeli kobondela nde Nzambe, kasi Yesu to moto mosusu te. Na kotalela mateya ya Yesu oyo ya polele, omoni te ete tosengeli kobondela Nzambe na nzela ya Yesu Kristo kasi te na nzela ya moto mosusu to “basantu?”

Libondeli ezali likambo ya ntina mingi na losambo na biso, na yango, kobondela moto mosusu na esika ya Nzambe eyokani ata moke te na mateya ya Biblia. (Yoane 4:23, 24; Emoniseli 19:9, 10) Yango wana tosengeli kobondelaka kaka Nzambe.

OSENGELI KOBANGA KOBONDELA NZAMBE?

Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu apesaki ndakisa ya mwana moko oyo asɛngi Tata na ye mwa eloko ya kolya. Tata akoki nde kopesa mwana na ye libanga na esika ya limpa? To nyoka na esika ya mbisi? (Matai 7:9, 10) Moboti oyo alingaka mwana na ye akoki kosala likambo ya ndenge wana soki moke te!

Lokola tata ya bolingo ná mwana na ye, Nzambe alingaka tósololaka na ye

Salá lokola yo nde moboti oyo balobeli na ndakisa wana. Kanisá ete mwana na yo azali mpenza na mposa ya kosɛnga yo eloko moko. Osalá mpenza boyokani malamu ná ye, mpe asololaka na yo na ntango nyonso oyo alingi. Ata bongo, lokola azali kobanga ndenge okotalela likambo yango, na esika ete ye moko asɛnga yo, atindi moto mosusu. Okoyoka ndenge nini? Bongo soki akómi na momeseno ya kosolola na yo kaka na nzela ya moto yango mpe emonani ete azali na mposa ya kokoba kosala kaka bongo? Okosepela na likambo ya ndenge wana? Soki moke te! Baboti ya bolingo balingaka ete bana na bango básololaka mbala moko na bango mpe bábangaka te kosɛnga bango eloko oyo balingi.

Nsima ya kopesa ndakisa wana, Yesu alobaki na ebele ya bato oyo bazalaki wana boye: “Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye biloko ya malamu koleka?” (Matai 7:11) Na ntembe te, moboti nyonso azalaka na mposa makasi ya kopesa mwana na ye biloko ya malamu. Tata na biso ya likoló azalaka kutu na mposa makasi ya koyoka mpe koyanola na mabondeli na biso.

Nzambe alingaka biso moko tosololaka na ye na nzela ya libondeli ata soki tosali mabunga ya ndenge nini. Apesá bato mosusu te mokumba ya koyoka mabondeli na biso. Biblia elendisi biso boye: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Na esika ya kozela ete basantu to bato mosusu bálobaka na esika na biso epai ya Nzambe, tosengeli nde kotalela Yehova Nzambe na ndenge oyo ebongi.

Tata na biso ya likoló atyelaka mokomoko na biso likebi. Azalaka na mposa ya kosalisa biso na ntango ya mikakatano mpe asɛngaka biso tópusana penepene na ye. (Yakobo 4:8) Oyo nde esengo kozala na libaku ya kobondela Nzambe mpe Tata na biso, “Moyoki ya libondeli”!​—Nzembo 65:2.