Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyokaka ndenge nini soki omoni langi moko boye?

Oyokaka ndenge nini soki omoni langi moko boye?

Ntango ozali kotalatala zingazinga, miso mpe bɔɔngɔ na yo esalaka elongo mpo na kosangisa makambo oyo ozali komona. Omoni mwa mbuma moko penepene mpe otali soki okosepela kolya yango to te. Otali likoló mpe olobi ete mbula ekobɛta te. Otali makambo oyo ozali kotánga sikoyo mpe okangi ntina na yango. Na ntembe te, langi nde esalisi yo oyeba makambo wana. Na ndenge nini?

Langi ya mbuma oyo omonaki esalisi yo oyeba soki ekɔmɛli to soki ezali kitoko. Langi ya mapata esalisi yo oyeba soki mbula ekobɛta to te. Ntango ozali kotánga lisolo oyo, miso na yo ezali kosala mpasi te mpo langi ya papye ná ya makomi ekeseni. Ya solo, mbala mosusu kozanga ete oyeba yango, osalelaka langi ntango nyonso mpo na koyeba makambo oyo ezali zingazinga na yo. Kasi langi esalaka mpe ete moto ayoka esengo to mawa.

LANGI ESALAKA ETE MOTO AMIYOKA NDENGE NINI?

Ntango ozali kotambolatambola na magazini moko, okomona biloko ndenge na ndenge oyo ebongisamá mpo na kobenda likebi na yo. Oyeba yango to te, bato oyo basalaka bapiblisite baponaka to basangisaka malamumalamu biloko ya langi ndenge na ndenge mpo na kosepelisa moto ya mbula nyonso, azala mwasi to mobali. Bato oyo batyaka langi na bandako, na bilamba, to mpe baoyo basalaka mayemi bayebi mpe ete langi ekoki kosala ete moto amonisa ndenge oyo azali komiyoka.

Bato bakoki kopesa balangi ndimbola ndenge na ndenge na kotalela mimeseno mpe bonkɔkɔ na bango. Na ndakisa, mpo na bato mosusu ya Azia, langi ya motane ezalaka elembo ya makila malamu to fɛti, kasi na bisika mosusu na Afrika, langi yango ezalaka elembo ya matánga. Ata soki babɔkwamá ndenge nini, bato bazalaka na makanisi ndenge moko soki bamoni balangi mosusu. Tótalela naino balangi misato mpe makambo oyo ekoki kosala epai ya moto.

LANGI YA MOTANE emonanaka polele mpenza. Mbala mingi, langi ya motane emonisaka nguya, etumba to likama. Ezali langi moko oyo ebɛtisaka motema mpe ekoki kosala ete estoma ekóma konika bilei mbangumbangu, moto apema mbangumbangu, mpe tansiɔ na ye emata.

Na Biblia, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “motane” euti na liloba oyo elimboli “makila.” Biblia esaleli langi ya motane-ngwaa to motane makasi mpo na kolobela mwasi ya ndumba oyo azali mobomi mpe alati elamba ya motane-bule, afandi likoló ya “nyama mabe moko ya langi ya motane makasi . . . oyo etondi na bankombo ya kofinga.”​—Emoniseli 17:1-6.

LANGI YA MAI YA MPONDU ekeseni mpenza na langi ya motane mpo yango esalaka ete estoma enika biloko malɛmbɛmalɛmbɛ mpe esalaka ete moto amiyoka malamu. Mbala mingi, langi ya mai ya mpondu ezalaka langi oyo ekitisaka motema mpe ezalaka elembo ya kimya. Toyokaka malamu ntango tomonaka elanga mpe bangomba oyo etondi na matiti ya mobesu. Lisolo ya Ebandeli oyo elobeli bozalisi emonisi ete Nzambe asalaki matiti ya mobesu mpe milona oyo ebimisaka mboto mpo na bato.​—Ebandeli 1:11, 12, 30.

LANGI YA MPƐMBƐ ezalaka mbala mingi elembo ya pole, libateli mpe bopɛto. Emonisaka mpe bizaleli lokola bolamu, kozala na ngambo te mpe pɛto. Mpɛmbɛ ezali langi oyo elobelami mingi na Biblia. Na bimonaneli, bato mpe baanzelu bamonanaka ete balati bilamba ya mpɛmbɛ; yango emonisaka bosembo mpe bopɛto ya elimo. (Yoane 20:12; Emoniseli 3:4; 7:9, 13, 14) Bampunda ya mpɛmbɛ mpe bato oyo bafandi likoló na yango oyo balati bilamba ya mpɛmbɛ, ya lini ya pɛto emonisaka etumba ya sembo. (Emoniseli 19:14) Nzambe asalelaka langi ya mpɛmbɛ mpo na komonisa ete andimaka kolimbisa masumu, alobi boye: “Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.”​—Yisaya 1:18.

LANGI EKUNDWELAKA BATO MAKAMBO YA NTINA

Ndenge oyo Biblia elobeli balangi, emonisi ete Nzambe ayebi ete langi esimbaka mpenza mitema ya bato. Na ndakisa mokanda ya Emoniseli elobeli makambo oyo ezali kosalema lelo oyo, na ndakisa bitumba, nzala mpe liwa oyo eutaka na kozanga bilei mpe bamaladi ya mabe. Mpo na kosalisa biso tóbosana yango te, emonaneli yango ya kokamwa elobeli bato oyo bafandi likoló ya bampunda oyo balangi na yango ezali na ndimbola moko boye.

Ya liboso, mpunda ya mpɛmbɛ oyo elimboli etumba ya sembo ya Kristo Yesu. Ya mibale, mpunda ya motane-ngwaa oyo elimboli etumba ya bikólo. Mpunda yango elandani na oyo ya moindo, oyo elimboli nzala. Mpe na nsima “mpunda moko ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu; mpe moto oyo afandaki likoló na yango nkombo na ye Liwa.” (Emoniseli 6:1-8) Langi ya mpunda mokomoko ekoki komonisa ndenge oyo toyokaka na kotalela bandimbola ya bampunda yango. Ezali mpasi tóbosana bampunda yango mpe makambo oyo yango ezali koteya biso lelo oyo.

Biblia ezali na bandakisa mingi oyo esaleli balangi mpo na kolobela maloba ya elilingi. Ya solo, Mozalisi ya pole, ya langi mpe ya miso ya moto, na bwanya nyonso asaleli balangi mpo na komonisa bililingi oyo motángi akoki kokanga ntina mpe kobosana te. Langi esalisaka biso tóyeba mpe tósangisa makambo oyo tozali komona. Langi esimbaka motema na biso. Langi ekoki kosalisa biso tóbosana te makambo ya ntina. Langi ezali likabo kitoko oyo Nzambe apesá biso mpo tósepela na bomoi.