Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Na mikolo ya Yesu, ndenge nini makabo ezalaki kopesama na tempelo?

Na tempelo, esika ya kotya makabo ezalaki na Lopango ya basi. Buku moko (The Temple​—Its Ministry and Services) elobi boye: “Esika yango ezalaki na mwa veranda moko, mpe na efelo na yango, batyaki bakɛsi, to ‘bakelelo’ zomi na misato epai bato bazalaki kotya makabo.”

Bazalaki kobenga bakɛsi yango kelelo mpo ezalaki nkingo moke mpe efungwamá makasi na nse. Na kɛsi mokomoko, bakomaki nkombo ya likabo oyo esengeli kotyama na kati, mpe mbongo oyo etyami bazalaki kosalela yango na mosala oyo esengeli. Yesu azalaki na Lopango ya basi ntango amonaki ebele ya bato bazali kotya makabo, kati na bango mwasi ya mobola oyo mobali akufá.​—Luka 21:1, 2.

Kɛsi mibale ezalaki mpo na mbongo ya kofuta mpako ya tempelo, moko mpo na mbula oyo bazali, mosusu mpo na mbula oyo euti koleka. Kɛsi 3 tii 7 ezalaki mpo na kotya mbongo oyo ekatamaki mpo na bipopo, bibenga, mabaya, mpaka-malasi, mpe bisaleli ya wolo. Soki moto abombaki mbongo koleka oyo ekatamaki mpo na likabo oyo akopesa, akotya mbongo oyo etikali na moko ya bakɛsi oyo etikali. Kɛsi 8 ezalaki mpo na kotya mbongo oyo etikali nsima ya kopesa makabo mpo na lisumu. Kɛsi ya 9 tii 12 ezalaki mpo na kotya mbongo oyo etikali na makabo mpo na ngambo, na mbeka ya bandɛkɛ, na makabo mpo na Banaziri, mpe na makabo mpo na bato ya maba. Kɛsi 13 ezalaki mpo na makabo ya bolingo malamu.

Luka, moko ya bakomi ya Biblia, ayebaki mpenza masolo ya kala?

Luka akomaki Evanzile oyo ezali na nkombo na ye mpe mokanda ya Misala ya bantoma. Luka alobaki ete ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli,’ kasi bato mosusu ya mayele balobaka ete makambo oyo alobaki ezalaki mpenza bongo te. (Luka 1:3) Makambo oyo Luka akomaki ezalaki mpenza sikisiki?

Luka alobelaki makambo ndenge ezalaki mpenza na ntango ya kala. Na ndakisa, asalelaki batitre ya bakonzi ya Leta ya Roma oyo bato mingi bayebaka te lelo lokola ex-préteurs to bakambi-mboka, na Filipe; politarques to bakonzi ya engumba ya Tesaloniki; mpe bakambi na Efese. (Misala 16:20, Kingdom Interlinear; 17:6; 19:31) Luka abengaki Erode Antipasi tétrarque, to moyangeli ya etúká, mpe Sergiusi Paulusi prokonsule ya Shipre.​—Misala 13:1, 7.

Ndenge Luka asalelaki batitre ya sikisiki ezali na ntina mingi mpamba te ntango makambo ya politiki ebongwanaki na Roma, batitre ya bakonzi mpe ebongwanaki. Kasi, Bruce Metzger moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia, alobi ete “batitre oyo basaleli na mokanda ya Misala eyokani na eleko oyo balobeli yango.” Moto mosusu ya mayele na nkombo William Ramsay alobi ete Luka “ayebaki malamu mpenza masolo ya kala.”