Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 151

Akobenga

Akobenga

(Yobo 14:13-15)

  1. 1. Bomoi lelo’eza’ mokuse mingi,

    Lobi esuki mpenza.

    Liwa ekoya lelo to lobi,

    Epesaka nde mawa.

    Soki mot’awei, akosekwa nde?

    Yoká elak’a Nzambe:

    (MONDIMO)

    Bakufi; Yo okobenga.

    Okosekwisa bango.

    Mp’okoyoka mposa ya

    mosal’a mabɔkɔ n’o.

    Tókoba kotya elikya,

    Akosekwisa biso.

    Tózwa bomoi libela,

    Mpo asalaki biso.

  2. 2. Nzamb’abosanaka baninga te,

    Ata oyo bakufá.

    Oyo baza’ na motema na ye,

    Nzambe akosekwisa.

    Na nsima, bomoi ya solosolo:

    Paradiso ya seko.

    (MONDIMO)

    Bakufi; Yo okobenga.

    Okosekwisa bango.

    Mp’okoyoka mposa ya

    mosal’a mabɔkɔ n’o.

    Tókoba kotya elikya,

    Akosekwisa biso.

    Tózwa bomoi libela,

    Mpo asalaki biso.