Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 31

Tambolá elongo na Nzambe!

Tambolá elongo na Nzambe!

(Mika 6:8)

  1. 1. Tambolá yo ná Yehova,

    Ndimá ozali mpamba.

    Kangamá na ye, talelá nde ye,

    Okozwa nguya na ye.

    Yo simbá nde lobɔkɔ na ye

    Mp’obunga nzela te.

    Ndimá ye atambwisa yo;

    Yoká ye mpe tosá ye.

  2. 2. Tambolá yo ná Yehova,

    Zalá mosantu, pɛto.

    At’omekami motindo nini,

    Akopesa yo mpiko.

    Kokanisakanisaka te

    Makambo ya mabe.

    Kanisá nde oy’a pɛto,

    Nzamb’akozala na yo.

  3. 3. Tambolá ná Yah, sepelá

    Mpo ye Moninga na yo.

    Pesá ye mersi na oy’apesi

    Mpe mapamboli ozwi.

    Tambolá ná Yah na esengo;

    Yembá ye na nzembo.

    Esengo nd’ekomonisa

    Ozali ya ye solo.