Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 54

“Nzela yango oyo”

“Nzela yango oyo”

(Yisaya 30:20, 21)

  1. 1. Eza’ na nzela moko

    ya kimya mpenza.

    Oyebi’ango mpo

    oyekolaki yango,

    Ntango oyokaki

    Mongongo ya Kristo.

    Nzela yango eza’

    Na Lilob’a Nzambe.

    (MONDIMO)

    Talá nzel’a bomoi; Nzel’a solo.

    Kopɛngwa te; Landá kaka yango!

    Nzamb’alobi: ‘Nzela yang’oyo;

    Landá yango mpo nzela yang’oyo.’

  2. 2. Eza’ na nzela se

    moko ya bolingo.

    Ye moko Nzambe nde

    Ndakisa na yango.

    Bolingo n’e elɛngi,

    mozindo, mɔtɔ.

    Na makambo nyonso,

    Landá nzela yango.

    (MONDIMO)

    Talá nzel’a bomoi; Nzel’a solo.

    Kopɛngwa te; Landá kaka yango!

    Nzamb’alobi: ‘Nzela yang’oyo;

    Landá yango mpo nzela yang’oyo.’

  3. 3. Eza’ na nzela se

    moko mpo na bomoi.

    Nzamb’alobi mosusu

    ya boy’eza’ te,

    Awa nde kimya

    mpe bolingo’eza’ mpenza.

    Eza’ nzel’a bomoi,

    Tótɔnda Yehova.

    (MONDIMO)

    Talá nzel’a bomoi; Nzel’a solo.

    Kopɛngwa te; Landá kaka yango!

    Nzamb’alobi: ‘Nzela yang’oyo;

    Landá yango mpo nzela yang’oyo.’