Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 64

Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma

Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma

(Matai 13:1-23)

  1. 1. Toza’ na eleko kitoko

    Ya kobuka bambuma nde.

    Elang’eteli, etandami,

    Toz’osala na molende.

    Toz’osal’elongo na Yesu,

    Ye nd’az’olakisa biso.

    Eza’ lokumu mpe tosepeli.

    Toz’obuka na esengo.

  2. 2. Mpo tolingi Nzambe mpe bato,

    Toz’olala lisusu te.

    Mosala ekómi ya mbangu,

    Nsuka eza’ mosika te.

    Mosala yango mpe esengo,

    Nzambe mpenza apamboli.

    Tókoba yango ná ye na mpiko,

    Tii akoloba: ‘Esili.’