Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 74

Yaká tóyemba loyembo ya Bokonzi!

Yaká tóyemba loyembo ya Bokonzi!

(Nzembo 98:1)

  1. 1. Yo mpe yaká tóyemba loyemb’oyo

    Ya Bokonzi, nzembo ya bolongi.

    Ekumisi Yah, epesi elikya.

    Yaká noki, tóyemba Bokonzi:

    (MONDIMO)

    ‘Yaká na losambo’a Nzambe.

    Lobá: Yesu nde Mokonzi!

    Yaká koyekola loyembo oyo;

    Fukamá mpo okumisa Nkolo.’

  2. 2. Loyemb’oyo ya sika emonisi

    Yesu az’oyangela likoló.

    Ye ná bandeko na ye ya elimo,

    Mosika te, bakoyangela nse:

    (MONDIMO)

    ‘Yaká na losambo’a Nzambe.

    Lobá: Yesu nde Mokonzi!

    Yaká koyekola loyembo oyo;

    Fukamá mpo okumisa Nkolo.’

  3. 3. Kaka bato oyo bamikitisi

    Nde bakoyeba mpenza nzemb’oyo.

    Eza’ mindɔndɔ te mpe bato mingi

    Bayekoli mpe bayekolisi:

    (MONDIMO)

    ‘Yaká na losambo’a Nzambe.

    Lobá: Yesu nde Mokonzi!

    Yaká koyekola loyembo oyo;

    Fukamá mpo okumisa Nkolo.’