Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 94

Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe

Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe

(Bafilipi 2:16)

  1. 1. Matɔndi, Yehova, Tata na biso

    Mpo opesi biso Liloba na yo!

    Ekomami n’elimo;

    esikoli biso.

    Mpo na yango nde toz’oyeba solo.

  2. 2. Ekɔtaka mpenza tii na motema.

    Emonisaka mabanzo, mikano.

    Mibeko n’o, kitoko;

    bikateli, sembo.

    Mpe mitinda na yo, toz’otos’ango.

  3. 3. Biblia ebongi mpenza na biso.

    Ekoki kosalisa moto nyonso.

    Sungá, ntango toyoki,

    kondima ekola.

    Matɔndi Yehova mpo na Biblia!