Lakisá makambo oyo ezali na kati

19 SANZA YA 09, 2019
GABON

Kampanye sipesiale ya mosala ya kosakola na Gabon

Kampanye sipesiale ya mosala ya kosakola na Gabon

Mpo na kosakola na bateritware oyo litatoli epesamaka mingi te na Gabon, filiale ya Cameroun ebongisaki kampanye moko banda na mokolo ya 01/06/2019 tii na mokolo ya 31/08/2019. Mokano ezalaki ya kokóma na bingumba ya mosika mpenza oyo etondi na bato na ndakisa: Franceville, Koulamoutou, Lambaréné, Libreville, Makokou, Moanda, Mouila, Oyem, Port-Gentil, mpe Tchibanga. Mpo kampanye yango elonga mpenza, bandeko 400 ya mikili ndenge na ndenge nde bapesaki mabɔkɔ na kampanye yango. Bandeko yango bautaki na Belgique, Canada, France, mpe États-Unis.

Bato koleka milio 2 bafandaka na ekólo Gabon. Atako ebele ya bato kuna balobaka monɔkɔ ya Français, kasi ezali na bato mosusu mpe balobaka monɔkɔ ya Fang oyo ezali monɔkɔ ya mboka na bango. Na yango, kampanye yango esalemaki na minɔkɔ nyonso mibale.

Moto moko oyo alobaka monɔkɔ ya Fang oyo asepelaki na mateya ya Biblia, oyo afandaka na kartye ya Bissegue na Libreville, alobaki boye: “Ezalaki mbala ya liboso nayoka nsango ya Nzambe na monɔkɔ na ngai moko!”

Ndeko mwasi moko oyo apesaki monɔkɔ na kampanye yango alobaki boye: “Kampanye yango emonisaki mpenza bolingo mpe bomoko oyo ezali na kati ya ebongiseli ya Yehova. Bandeko basi mpe mibali bazalaki na esengo, bamonisaki ezaleli ya koyamba bapaya, mpe bolingo ya solosolo. Ekundweli ngai makambo oyo Paulo alobaki mpo na lisangá ya Filipi​—tozali na ‘likanisi moko, na bolingo moko, na bomoko na molimo, mpe na likanisi kaka moko mpenza.’”​—Bafilipi 2:2.