Lakisá makambo oyo ezali na kati

Na likoló, banda na lobɔkɔ ya mwasi: Puneet Aggarwal, Delroy Williamson, Ashok Patel; na nse, banda na lobɔkɔ ya mwasi: Mark Sleger, Jouni Palmu, Hiroshi Aoki

20/7/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Babimisi lisusu Biblia motoba na pɔsɔ oyo elandi

Babimisi lisusu Biblia motoba na pɔsɔ oyo elandi

Batatoli ya Yehova babimisi lisusu Biblia motoba na pɔsɔ oyo elandi. Na mokolo ya 04/07/2020, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Bichlamar mpe Oromo. Na mokolo oyo elandi, mokolo ya 05/07, Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Letton mpe Marathi, Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimaki na monɔkɔ ya Bengali mpe ya Karen (Sgaw). Babiblia yango ebimaki na ndenge oyo ekotángama na baaparɛyi, mpe bato balandaki badiskur na yango oyo basilaki kobongisa liboso na nzela video. Basakoli balandaki programɛ yango na Internet mpe basepelaki mingi na likabo malamu Yehova apesaki bango.

Bichlamar

Mark Sleger, ndeko ya Komite ya filiale ya Fidji, ye moto asalaki diskur ya kobimisa Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu. Basakoli na Vanuatu balandaki programɛ yango, oyo babongolaki na monɔkɔ ya Bichlamar mpe na elobeli ya bababa ya Bichlamar.

Bikipi mibale ya babongoli nde ebongolaki Biblia yango na boumeli ya mbula koleka misato. Mobongoli moko alobi boye: “Bandeko bakolinga Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu, mpo kotánga yango ezali pɛtɛɛ, ekomami na ekomeli ya mikolo oyo mpe ndenge bato balobaka mokolo na mokolo. Ekosalisa moto nyonso akanga ntina ya mateya ya Nzambe malamu mpenza.”

Tondimi na motema moko ete Biblia oyo ebongisami lisusu ekosalisa basakoli koleka 700 oyo balobaka monɔkɔ yango na boyekoli na bango moko mpe na mosala ya kosakola.

Oromo

Delroy Williamson, ndeko ya Komite ya filiale ya Éthiopie, moto alakisaki Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika na Oromo. Bandeko koleka 12 548 balandaki programɛ na Internet, na kati na bango bandeko 2 000 oyo balobaka monɔkɔ ya Oromo.

Lokola bandeko mingi bazali na likoki ya kolanda programɛ na Internet te, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki nzela ete programɛ yango eleka na shɛni ya TV ya mboka yango. Basakoli bazalaki mpe na likoki ya kolanda programɛ yango na telefone.

Bandeko mitano babongolaki yango na boumeli ya mbula mitano. Biblia yango ezali esaleli ya malamu mpenza oyo ekosalisa bandeko oyo bazali kosakola na teritware monene oyo bato balobaka monɔkɔ ya Oromo.

Letton

Nsima ya mosala makasi na boumeli ya mbula 12, Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Letton. Masangá nyonso oyo bandeko balobaka monɔkɔ ya Letton mpe ya Russe oyo ezali na Lettonie basɛngaki bango bálanda programɛ na Internet.

 Jouni Palmu, ndeko azali na Komite ya filiale ya Finlande, asalaki diskur ya kobimisa Biblia yango. Alobaki boye: “Tozali na esengo ya kobimisela bato nyonso oyo batángaka monɔkɔ ya Letton Biblia na ekomeli ya sika oyo kotánga yango ezali pɛtɛɛ. Tozali na elikya ete ekobakisa esengo ya koyekola mpe komanyola Liloba ya Nzambe.”

Moko ya babongoli alobi boye mpo na bolukiluki oyo esalemaki mpo na Biblia yango ya sika: “Kosalela Biblia yango ya sika ezali mpasi te, mpe ekosalisa yo okanisa malamumalamu likoló ya makambo oyo ozali kotánga na Biblia mpe na boyekoli na yo moko.”

Marathi

Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika na Marathi ebimaki na likita moko oyo esalemaki mpo na masangá nyonso oyo elobaka monɔkɔ ya Marathi na Inde. Puneet Aggarwal, ndeko ya Komite ya filiale ya Inde, moto ayebisaki kobima ya Biblia yango.

Bandeko motoba bato babongolaki Biblia na monɔkɔ ya Marathi na boumeli ya mbula misato. Mobongoli moko alobi boye: “Biblia yango ekosalisa mingi mpenza baboti ná basakoli ntango bazali koteya bana na bango to bato oyo bazali kosepela na mateya ya Biblia.”

Mobongoli mosusu alobi boye: “Tozali na esengo mpenza ndenge Biblia yango ezongisi nkombo ya Nzambe, Yehova, na bisika nyonso oyo yango ezalaki na makomi ya ebandeli. Bato oyo bakotánga Biblia oyo bakotánga nkombo ya Nzambe pene na lokasa nyonso, mpe nkombo ya Yehova ekozwa lokumu oyo ebongi na yango.”

Bato koleka milio 83 balobaka monɔkɔ ya Marathi na Inde Centrale.

Bengali

Ashok Patel, ndeko ya Komite ya filiale ya Inde, moto alakisaki Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Bengali. Basakoli koleka 1 200 balandaki programɛ yango na Inde mpe na Bangladesh.

Bato koleka milio 265 balobaka monɔkɔ ya Bengali, ezali monɔkɔ ya nsambo oyo bato balobaka mingi na mokili mobimba. Mpo na kobimisa Biblia oyo bato mingi bakokanga ntina ya makambo oyo ekomami, basalaki ekipi ya bandeko oyo bauti na bisika ndenge na ndenge na Inde mpe na Bangladesh, basalaki esika moko mbula misato mpe basilisi mosala yango.

Ntango ndeko Patel azali kosala diskur alobaki boye: “Bengali ezali moko ya minɔkɔ ya liboso ya Inde oyo babongolaki na yango Biblia. Makomami ya Grɛki ya bokristo ya liboso ebimaki na mobu 1801. Eloko moko ya malamu mpenza oyo ezalaki na Biblia wana na monɔkɔ ya Bengali ezalaki ete etyaki nkombo na Nzambe, Yehova, na bisika oyo esengeli kozala. Nzokande, na Babiblia ya mikolo oyo, balongolá nkombo ya Nzambe, na esika na yango batyá nde titre ‘Nkolo.’ Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ekokokisa mposa moko, ebongolami na bosikisiki, kotánga mpe kokanga ntina na yango ezali mpasi te.”

Moko ya babongoli alobi boye: “Biblia oyo ezali elembo ete Yehova Nzambe alingi bato ya ndenge nyonso mpe azali kobenga bango báyekola makambo na ye mpe ya Mwana na ye, Yesu Kristo.”

Karen (Sgaw)

Hiroshi Aoki, ndeko ya Komite ya filiale ya Birmanie, abimisaki Makomami ya Grɛki ya bokristo monɔkɔ ya Karen (Sgaw). Bandeko 510 ya masangá motoba mpe bituluku minei balandaki programɛ yango na Internet.

Babongoli Biblia na monɔkɔ ya Karen (Sgaw) kaka na mbula moko na mwa basanza. Moko na bandeko oyo babongolaki alobi boye: “Bandeko mpe bato oyo balobaka Karen (Sgaw) bakosepela mingi kotánga Biblia yango, mpe ezongisi nkombo ya Yehova, mpe bakomi yango na elobeli ya mikolo oyo. Soki otángi yango, ezali na ekomeli ya polele, na bosikisiki, ezali pɛtɛɛ mpe okokanga ntina malamu. Tozali kopesa Yehova matɔndi mpo na likabo ya malamu boye oyo ekosalisa biso tópusana penepene na ye na lisalisi ya Biblia oyo ezali na monɔkɔ oyo ezali kosimba mitema na biso.”

Mobongoli mosusu alobi boye: “Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ekomami na elobeli ya mokolo na mokolo, ekosalisa batángi báyeba ndenge oyo bato oyo Biblia elobeli bazalaki komiyoka, bámona makambo oyo ekómelaki bango, mpe bámekola kondima na bango.”

Tozali kosepela elongo na bandeko oyo bazwi Babiblia yango. Tozali na elikya ete Babiblia yango ekosalisa basakoli oyo balobaka minɔkɔ wana bákoba kopusana penepene na Yehova mpe koteya bato mosusu mateya ya Nzambe.​—Yoane 17:17.