Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Jovidon Bobojonov

18 SANZA YA 11, 2020
TADJIKISTAN

Tadjikistan: Prezida ya ekólo alimbisi ndeko Jovidon Bobojonov mpe abimisi ye na bolɔkɔ

Tadjikistan: Prezida ya ekólo alimbisi ndeko Jovidon Bobojonov mpe abimisi ye na bolɔkɔ

Ndeko Jovidon Bobojonov, nsima ya kobima na bolɔkɔ, na mokolo ya 01/11/2020, alobaki boye: “Yehova asalisaki ngai nakoba kobatela kondima na ngai makasi.” Liboso ya mokolo oyo alobaki maloba yango, prezida ya ekólo Tadjikistan alimbisaki Jovidon, elongo na bato mosusu ya bolɔkɔ 377. Bakatelaki ndeko Jovidon etumbu ya bolɔkɔ mbula mibale mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye, kasi asalaki sanza libwa.

Na mokolo ya 04/10/2019, bakonzi ya basoda bakangaki ndeko Jovidon na ndako na ye na makasi wana azalaki na mbula 19 mpamba, mpe batyaki nkombo na ye na molɔngɔ ya baoyo bakokɔta na mosala ya soda. Na boumeli ya basanza mingi, bazalaki kotinda ye na bituluku ndenge na ndenge ya basoda. Na esika (TDF) oyo bazalaki kotinda ye, asengelaki kolimbolaka ntina oyo aboyi kokɔta na mosala ya soda. Ndeko Jovidon alobi boye: “Bakonzi ya basoda ná basoda ebele bazalaki kotunatuna ngai mituna ezangá ntina, mpe bango nyonso bazalaki kolinga ete natika lingomba na ngai. Bazalaki kotumola ngai na mituna na bango mpo nasilika. Ntango mosusu, bazalaki kolamusa ngai na butu mpenza, mpe bango nyonso bazalaki kotunatuna ngai kaka mituna mokomoko wana, bazalaki kosɛnga nalimbola ntina oyo naboyi kokɔta na mosala ya soda.

“Kasi, libondeli ezalaki kosalisa ngai mingi mpenza. Na kati ya etuluku mokomoko ya basoda oyo bazalaki kotinda ngai, nazalaki kobondela Yehova na molende butu moi, na mai na miso, nazalaki kosɛnga ye asalisa ngai natika te, nayokisa ye nsɔni te, mpe nazongisa te ntango bazali kotumola ngai.

“Yehova asalisaki ngai . . . Ntango mosusu, nazalaki konyokwama na makanisi mpo nazalaki koyoka lokola nde mokili esundoli ngai. Kasi Yehova, na nzela ya biloko asalá, azalaki kopesa ngai makasi. Mokolo nyonso na ntɔngɔ, nazalaki kolamuka na nzembo ya bandɛkɛ. Na butu, nazalaki kotala sanza ná minzoto. Makabo yango ya Yehova ezalaki kopesa ngai esengo mpe kolendisa ngai.”

Bakatelaki ndeko Jovidon etumbu ya bolɔkɔ na mokolo ya 02/04/2020, mpe balongolaki ye na TDF batindi ye na bolɔkɔ. Bapekisaki ye kozwa nkoma to mikanda. Kasi, bandeko oyo bazalaki komemela ye biloko ya kolya, bazalaki kokoma mokapo ya mokolo na bakitunga oyo bazalaki kotyela ye biloko. Ndeko Jovidon alobi boye: “Yango esalisaki ngai nayoka te ete nasundolami, mpe namonaki mpenza ete baninga na ngai bazali na bolingo mpenza.

Ndeko Jovidon apesaki mpe Nzambe matɔndi ndenge azalaki na likoki ya komikundola bavɛrsɛ ya kolendisa, na ndakisa, Baroma 8:37-39. Alobi boye: “Na bolɔkɔ namonaki bosolo ya maloba yango. Komekama moko te na kati na yango ezalaki na likoki ya kokabola ngai na bolingo ya Yehova. Yehova asalisaki ngai nabatela kondima na ngai makasi.”

Makambo ndeko Jovidon akutanaki na yango elendisaki baboti na ye. Tata na ye, ndeko Abdujamol, alobi boye: “Lokola mwana na biso atikalaki sembo epai ya Yehova na ntango ya komekama wana, mabondeli mpe ndakisa malamu na ye ekómisaki kondima na biso makasi. Bandeko na biso ya elimo na mokili mobimba basungaki biso mingi mpenza. Tozali kopesa bango matɔndi mingi mpo na mabondeli na bango. Tozali kotɔnda Yehova mingi mpenza mpo apesi biso baninga ya bolingo mingi mpenza.”

Na ntango oyo ya nsuka, biso nyonso tokokutana na “komekama makasi.” (1 Petro 4:12) Bongo, ndeko Jovidon asukisaki na maloba oyo: “Lokola sikoyo nazali na bonsomi, nazwi bibongiseli ya kosalela bonsomi na ngai mpo na kobakisa boyebi na ngai na makambo ya Yehova, mpe nazali komibongisa mpo na komekama oyo ekoya. Na kati na bino, baoyo bokutani naino na komekama ya makasi te, bosengeli kosalela bonsomi na bino malamumalamu mpo na koyekola na mozindo Liloba ya Yehova mpe mikanda na biso mpo na koyeba ye malamumalamu.”