Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bapekisaka bafilme, babuku, mpe banzembo mosusu?

Batatoli ya Yehova bapekisaka bafilme, babuku, mpe banzembo mosusu?

 Te. Ezali na moto moko te na lisangá na biso oyo atalaka bafilme, atángaka babuku to mpe ayokaka banzembo moko boye bongo na nsima ayebisa biso oyo tosengeli koboya. Mpo na nini?

  Biblia elendisi moto na moto ateya ‘makoki na ye ya kososola’ mpo ayeba kokesenisa mabe na malamu.​—Baebre 5:14.

  Biblia epesi batoli oyo mokristo akoki kolanda mpo esalisa ye apona likambo ya malamu oyo akoki kosala mpo na kolekisa ntango. a Na likambo yango, mpe na makambo mosusu nyonso ya bomoi, mokano na biso ezalaka ya ‘kokoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.’​—Baefese 5:10.

  Biblia eteyaka ete batata bazali na bokonzi na mabota; na yango, bakoki komona malamu bápekisa bato ya bandako na bango bafilme to banzembo mosusu. (1 Bakorinti 11:3; Baefese 6:1-4) Kasi longola na kati ya libota, moto moko te azali na lotomo ya koyebisa bandeko ya lisangá ete filme to nzembo boye ezali mabe, to ete vɛdɛti boye to boye azali mabe.​—Bagalatia 6:5.

a Na ndakisa, Biblia epekisi likambo nyonso oyo ezali kokumisa misala ya bilimu mabe, pite, ekobo mpe mobulu.​—Kolimbola Mibeko 18:10-13; Baefese 5:3; Bakolose 3:8.