Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bazali mwa kinzambinzambi?

Batatoli ya Yehova bazali mwa kinzambinzambi?

 Te, Batatoli ya Yehova bazali kinzambinzambi te. Tozali nde bakristo mpe tosalaka makasi tólanda ndakisa oyo Yesu atiká mpe tosalelaka mateya na ye na bomoi na biso.

Kinzambinzambi ezali nini?

 Moto na moto alimbolaka liloba kinzambinzambi na ndenge na ye. Kasi, tótala ndimbola mibale oyo bato bapesaka na liloba yango. Na nsima tokomona ntina oyo ndimbola yango etali biso te.

  •   Bato mosusu balobaka ete kinzambinzambi ezali lingomba moko oyo ebimi sika to oyo eboyi kolanda ndenge mangomba mosusu esalaka. Batatoli ya Yehova babimisá lingomba ya sika te. Kasi, tolandaka nde losambo oyo bakristo ya liboso bazalaki kosala, oyo ndakisa mpe mateya na bango ekomami na Biblia. (2 Timote 3:16, 17) Tondimaka ete makambo nyonso oyo etali losambo esengeli kouta na Biblia; kasi te kolanda ndenge mangomba mosusu esalaka.

  •   Basusu balobaka ete kinzambinzambi ezali mwa lingomba moko ya mabe oyo mokonzi na yango ezali moto. Batatoli ya Yehova bamonaka moto moko te lokola mokonzi na bango. Kasi, totosaka likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ntango alobaki ete: “Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.”​—Matai 23:10.

 Biso Batatoli ya Yehova tozali mwa lingomba te oyo esalaka bato mabe; tosalisanaka nde biso na biso mpe tosalisaka bato mosusu. Na ndakisa, mosala ya kosakola oyo tosalaka esalisi bato mingi bálongwa na boombo, na ndakisa ya bangi to ya masanga. Longola yango, na mokili mobimba, tosalá bakelasi mpo na kotángisa bato, mpe tozali kosalisa bankóto ya bato báyekola kotánga mpe kokoma. Topesaka mpe lisungi na bato oyo bazwi likama. Tosalaka makasi ete bizaleli na biso esepelisa basusu, kaka ndenge Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázala.​—Matai 5:13-16.