Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bandimaka minganga básalisa bango?

Batatoli ya Yehova bandimaka minganga básalisa bango?

 Ɛɛ, Batatoli ya Yehova bandimaka makambo ya minganga, mpe bandimaka minganga básalisa bango. Tosalaka makasi tózala nzoto kolɔngɔnɔ, kasi ntango mosusu mpe tozalaka “na mposa ya monganga.” (Luka 5:31) Kutu, Luka, mokristo moko ya siɛklɛ ya liboso, azalaki monganga; lelo mpe Batatoli ya Yehova mosusu bazali minganga.​—Bakolose 4:14.

 Nzokande, ndenge mosusu oyo minganga basalisaka eyokani te na mitinda ya Biblia, mpe tondimaka yango te. Na ndakisa, tondimaka te bákɔtisa biso makila na nzoto mpo Biblia epekisi kozwa makila mpo na kosalisa nzoto. (Misala 15:20) Ndenge moko mpe, Biblia epekisi kosalisa nzoto epai ya banganga-nkisi to kozwa bankisi oyo ekokɔtisa moto na boyokani na bilimo mabe.​—Bagalatia 5:19-21.

 Kasi, minganga mingi basalelaka bankisi oyo ebuki ata mobeko moko te ya Biblia. Na yango, moto na moto aponaka minganga básalisa ye na ndenge oyo alingi. Motatoli mosusu akoki kondima nkisi to lisalisi moko boye ya monganga, nzokande Motatoli mosusu akoki koboya yango.​—Bagalatia 6:5.