Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bapekisaka bato kolulana?

Batatoli ya Yehova bapekisaka bato kolulana?

 Batatoli ya Yehova bandimaka ete batoli mpe mibeko oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa moto azwa bikateli oyo ekosepelisa Nzambe mpe ekozala mpo na bolamu na ye. (Yisaya 48:17, 18) Biso te nde tobimisá batoli mpe mibeko yango, kasi totosaka yango. Tótalela mwa batoli mpe mibeko mosusu oyo etali mpe kolulana. a

  •   Libala esengeli koumela libela. (Matai 19:6) Lokola Batatoli ya Yehova bamonaka ete soki bato balulani esɛngaka bábalana, bazwaka likambo yango na lisɛki te.

  •   Kaka baoyo bakoki kobalana nde bakoki kolulana. Bato yango ‘baleki eleko ya ebandeli ya bolenge,’ ntango oyo bamposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi.​—1 Bakorinti 7:36.

  •   Baoyo bazali kolulana basengeli kozala na bonsomi ya kobalana. Na miso ya Nzambe, bato mosusu oyo babomá libala na Leta bakoki kobala te mpo mibeko ya Nzambe endimaka ete moto aboma libala kaka soki molongani asali ekobo.​—Matai 19:9.

  •   Biblia esɛngi bakristo oyo balingi kobala bápona kaka moto oyo azali mokristo lokola bango. (1 Bakorinti 7:39) Batatoli ya Yehova bamonaka ete mobeko yango esɛngi kobala kaka Motatoli ya Yehova oyo azwá batisimo mpe asalelaka mateya yango, kasi te moto oyo asepelaka na mateya na biso. (2 Bakorinti 6:14) Banda kala, Nzambe asɛngaka basaleli na ye bábala kaka bato oyo bazali mpe basaleli na ye. (Ebandeli 24:3; Malaki 2:11) Mobeko yango esalisaka tii lelo, ndenge baankɛtɛ ya mikolo na biso emonisi yango. b

  •   Bana basengeli kotosa baboti na bango. (Masese 1:8; Bakolose 3:20) Mpo na bana oyo bafandi na ndako ya baboti, kotosa elimboli mpe kondima bikateli oyo baboti bazwi na likambo etali kolulana na moto. Baboti bakoki kokata mbula oyo mwana na bango akoki kolula moto mpe makambo mosusu oyo bakotikela ye nzela asala.

  •   Na kolanda batoli oyo ezali na Biblia, Batatoli ya Yehova bango moko baponaka soki basengeli kolula moto mpe bakolula nani. Yango eyokani na likanisi ya Biblia oyo elobi: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Atako bongo, soki balingi kolula moto, mingi balukaka toli epai ya Batatoli ya Yehova oyo bakɔmeli na elimo mpe bayebi makambo mingi.​—Masese 1:5.

  •   Makambo mingi oyo bato basalaka ntango bazali kolulana, ezalaka nde masumu minene. Na ndakisa, Biblia esɛngi biso tóboya pite. Yango ezali kaka kolala na moto te; ezali mpe makambo nyonso ya mbindo oyo bato mibale oyo babalaná te bakoki kosala, na ndakisa kosimbasimba enama ya kobotela ya mwasi to mobali, kofiba yango to kosangisa nzoto na esumbeli. (1 Bakorinti 6:9-11) Ata kosala makambo oyo ekolamwisa mposa ya kosangisa nzoto epai ya moto oyo azali molongani na yo te, ata soki bosangisi nzoto te, ezali “mbindo” mpe Nzambe asepelaka na yango te. (Bagalatia 5:19-21) Biblia epekisi mpe masolo oyo ezali na “maloba ya nsɔni”.​—Bakolose 3:8.

  •   Motema ekosaka. (Yirimia 17:9) Ekoki kotinda moto asala makambo oyo ayebi ete ezali mabe. Mpo motema ekosa bango te, bato mibale oyo bazali kolulana basengeli koboya kozala esika oyo bazali kaka bango moko mpo bákwea te. Bakoki komona malamu bákutanaka esika moko na baninga ya malamu to mpe bázalaka elongo na moto moko oyo akoki kosalisa bango mpo bákwea te. (Masese 28:26) Bakristo oyo bazali minzemba mpe bazali koluka moto ya kobalana na ye bayebaka ete kolula moto na nzela ya Internet ezalaka na makama, mingimingi likama ya kolingana na moto oyo oyebi malamu te.​—Nzembo 26:4.

a Na bamboka mosusu, bato balulanaka, kasi na bamboka mosusu ezalaka bongo te. Biblia mpe elobi te ete tosengeli kaka kolula moto to ete kaka yango nde ememaka na libala.

b Na ndakisa, lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Marriage & Family Review) elobaki ete “nsima ya kozwa ntango mbala misato mpo na koyekola malamu eloko oyo esalaka ete libala eumela, bato ya mayele bamoni ete kozala na lingomba moko mpe kondima mateya moko nde esalaka ete libala eumela (mbula 25-50 matá).”​—Volimi 38, eteni 1, lokasa 88 (2005).