Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bamonaka ete kaka bango nde bakobika?

Batatoli ya Yehova bamonaka ete kaka bango nde bakobika?

 Te. Bato mosusu ebele ya ntango ya kala, oyo bazalaki Batatoli ya Yehova te, bango mpe bakozwa lobiko. Biblia elobi ete na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Lonh6gola yango, na mikolo na biso, bato ebele bazali kondima kosalela Nzambe; bango mpe bakozwa lobiko. Nzokande, kokata soki banani bakobika, banani bakobika te, ezali mosala na biso te. Ezali mokumba ya Yesu.​—Yoane 5:22, 27.