Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazongaka lisusu mpo na kosolola na moto oyo alobaki ete “Nasepelaka na mateya na bino te”?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazongaka lisusu mpo na kosolola na moto oyo alobaki ete “Nasepelaka na mateya na bino te”?

 Lokola Batatoli ya Yehova balingaka Nzambe mpe bazalani na bango, basepelaka koyebisa moto nyonso nsango ya Biblia, ata mpe moto oyo alobaki ete “nasepelaka na mateya na bino te.” (Matai 22:37-39) Lokola tolingaka Nzambe yango wana totosaka etinda ya Mwana na ye ya “kopesa litatoli malamumalamu.” (Misala 10:42; 1 Yoane 5:3) Mpo na kosala yango, tozongelaka bato mbala na mbala mpo na komemela bango nsango ya Nzambe, kaka ndenge basakoli ya kala basalaki. (Yirimia 25:4) Lokola tolingaka bazalani na biso, tomemelaka bato nyonso “nsango malamu ya Bokonzi,” oyo ebikisaka ata mpe epai ya baoyo balobaki liboso ete basepelaka na yango te.​—Matai 24:14.

 Mbala mingi tokutanaka na bato oyo basepeli ntango tozongi na bandako oyo liboso bato basepelaki te. Tótalela bantina misato:

  •   Bato balongwaka mpe bakendaka bisika mosusu.

  •   Bato mosusu ya ndako basepelaka na nsango na biso.

  •   Bato babongwanaka. Makambo oyo elekaka na mokili to oyo moto akutani na yango etindaka basusu ‘báyeba bobola na bango ya elimo’ mpe básepela na nsango ya Biblia. (Matai 5:3) Ata baoyo batɛmɛlaka biso bakoki kobongola motema ndenge ntoma Paulo asalaki.​—1 Timote 1:13.

 Kasi, totindaka bato na makasi te bándima nsango na biso. (1 Petro 3:15) Toyebi ete moto mokomoko asengeli kozwa ekateli na likambo etali losambo.​—Kolimbola Mibeko 30:19, 20.