Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Guyana

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Guyana

 “Nazangaka maloba ya koloba mpo na komonisa esengo oyo moto akoki kozwa na mosala ya kosakola na esika mposa ezali monene!” Ezali maloba ya Joshua, oyo afandaka na États-Unis kasi akendaki kosakola na ntango moko boye na Guyana *, na Amerika ya sudi. Batatoli ya Yehova mingi oyo basakolaka na mboka oyo bato mingi basepelaka na solo bayokaka mpe esengo ya ndenge wana. Mateya nini mpenza baoyo bakendaki kosakola na esika mposa ezali monene bapesi biso? Ndenge nini mateya yango ekoki kosalisa yo omibongisa mpo na kokende kosakola na mboka mopaya soki ozali na mposa?

Nini etindaki bango bákende kosakola na esika mposa ezali monene?

Linel

 Liboso ya kokende na Guyana, ndeko mobali moko na nkombo Linel asakolaki na teritware oyo basakolá mingi te na mboka na bango, na États-Unis. Alobi boye: “Tozalaki basakoli 20 oyo batindaki biso mwa bamboka ya kati na Virginie-Occidentale. Ndenge tosakolaki mpe tosalaki boninga elongo na bandeko na boumeli ya pɔsɔ mibale ebongolaki bomoi na ngai! Nakómaki lisusu na ekateli ya kopesa Yehova oyo eleki malamu na bomoi na ngai.”

Erica ná Garth

 Ntango Garth ná mwasi na ye Erica bazalaki na mposa makasi ya kokende kosakola na mboka mopaya, baponaki mboka Guyana. Mpo na nini? Erica alobi: “Toyebaki ndeko moko ná mwasi na ye bakendaki kuna. Bazalaki na esengo mpe tomonaki ete bazalaki kosepela na makambo oyo bazalaki kosala. Yango etindaki biso tókende mpe kuna.” Erica ná Garth balekisaki mbula misato ya esengo na “mokumba wana ya esengo.” Garth abakisi boye: “Tomekaki kosakola na mboka mopaya mpe tomonaki ete ezalaki malamu.” Na nsima, ye ná mwasi na ye bakɔtaki na Eteyelo ya Gileade mpe sikoyo bazali kosala na ekólo Bolivie.

Baoyo bakendaka kosakola na bamboka mopaya basepelaka ntango nyonso na kolobela masolo malamu etali Biblia

Ndenge nini bamibongisaki?

 Toli ya Biblia elendisaka biso tózala na bomoi ya mindɔndɔ te. (Baebre 13:5) Emonisi mpe ete tosengeli koluka koyeba mosolo boni ekosɛnga liboso ya kozwa bikateli ya minene na bomoi. (Luka 14:26-33) Ntango tozali na mposa ya kokende kosakola na mboka mopaya, toli wana ya Biblia ezali na ntina mpenza! Garth akomi boye: “Liboso ya kokende na Guyana, ngai ná Erica tokómisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ. elingi koloba totɛkaki mosala na biso ya mombongo, ndako na biso mpe biloko nyonso ezangi ntina oyo tozalaki na yango. Ezwaki kaka mwa mbula. Kaka na ntango yango, tobatelaki na makasi mposa na biso ya kokende kosakola na Guyana mpe tosalaki mibembo na bambula wana nyonso na mboka yango.”

Sinead ná Paul

 Likambo mosusu ya kobosana te ezali mosolo to mbongo. Na bikólo mosusu, bapesaka nzela epai ya basakoli oyo bakendeke na esika mposa ezali monene básala mosala. Batatoli ya Yehova mosusu babatelaka mosala oyo bazalaki kosala na ekólo na bango mpe basalaka na mosika. Basusu bamonaka malamu bázonga na mboka na bango mpo na mwa ntango mpo na koluka mwa mbongo. Yango nde Paul ná mwasi na ye Sinead bazalaki kosala, bazalaki kozonga na Irlande mbala moko na mbula mpo na koluka mbongo. Ndenge bamesanaki kosala bongo esalisaki bango bákoba kosakola na Guyana na boumeli ya mbula 18 ya lipamboli, mbula 7 nsima ya kobotama ya mwana na bango ya mwasi ezali mpe na kati ya mbula wana 18.

Christopher ná Lorissa

 Nzembo 37:5 elobi: “Tikelá Yehova nzela na yo, mpe talelá ye, mpe ye moko akosala.” Ndeko Christopher ná mwasi na ye Lorissa na États-Unis bazalaki kosambela mbala na mbala mpo na mokano na bango ya kokende kosakola na mboka mopaya. Lisusu, na ntango ya losambo na bango na kati ya libota, bazalaki kotalela makambo oyo basengelaki kosala mpo na kolonga kokende kosakola na mboka mopaya, bazalaki kotalela makambo oyo ebongi mpe oyo ebongi te. Lokola baponaki kokende kosakola na esika oyo bakozala na mposa te ya koyekola monɔkɔ mosusu, baponaki Guyana, epai Anglais ezali monɔkɔ oyo endimami na Leta.

 Lisusu, balandaki toli oyo ezali na Masese 15:22: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te, kasi ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.” Bakomelaki filiale oyo ezali kotambwisa mosala na ekólo Guyana, * bamonisaki ete bandimi kokende mpe eksperiansi oyo bazalaki na yango. Kaka na ntango wana, balukaki koyeba ndenge mosala ya kozwa lisalisi ya monganga, klima mpe mimeseno ya bana-mboka ezalaka. Filiale epesaki biyano na mituna na bango mpe epesaki bango banimero ya bankulutu ya mboka yango mpo báyeba esika nini balingaki kokende na nsima.

 Linel, oyo tolobelaki likoló, azali sikoyo mokɛngɛli ya zongazonga na Guyana. Liboso ya kokende kuna, ye mpe asalelaki toli ya Masese 15:22. Alobi boye: “Longola kobomba mbongo mpo na mobembo, nasololaki na bandeko mosusu oyo bakendaki kosakola na mboka mopaya. Nayebisaki likambo yango na libota na ngai, epai ya bankulutu ya lisangá na biso, mpe epai ya mokɛngɛli ya zongazonga. Mpe nazalaki kotánga lisolo nyonso oyo nakokaki kozwa na mikanda na biso oyo elobeli kokende kosakola esika mposa ezali monene.”

Joseph ná Christina

 Liboso ya kokende kofanda na mboka mopaya, basakoli mingi oyo bamonaka ete ezali malamu kokende naino kotala mboka yango ata mbala moko. Joseph ná mwasi na ye Christina balobi: “Mbala ya liboso oyo tokendaki na Guyana, tofandaki sanza misato. Ezalaki mingi mpo na biso mpo tómona ndenge makambo ezalaka kuna. Mpe na nsima, tozongaki na mboka na biso mpo na kokanga valize na biso mpe mpo na koya na Guyana.”

Makambo nini babongolaki na bomoi na bango?

Joshua

 Mpo na kolonga kosalela Nzambe na mboka mopaya, esika mposa ezali monene esengeli kozala na elimo ya komipesa mpe kondima kobongola makambo mosusu ya bomoi mpe mimeseno. Na ndakisa, baoyo bakendaka na bisika ya malili makasi mpo na bisika ya molunge makasi, bamonaka mbala mingi ete bandako na bango ya sika etondaka na mwa banyama mikemike. Joshua, oyo tolobelaki na likoló, alobi boye: “Namoná naino te maboke ebele ya banyama mikemike bongo. Mpe awa, na Guyana, banyama mikemike yango ezalaki komona bisika nyonso! Kasi namesanaki na yango. Na nsima nayaki koyeba ete likoki ya kopekisa banyama yango na kosala mwa makambo mpo na kobatela ndako pɛto, na ndakisa kopɛtolaka ndako ntango nyonso, kosukola basaani mpe kolongola ekunde to fulu.”

 Kofanda na mboka mopaya ekoki mpe kolimbola komesana na bilei ya sika mpe koyekola ndenge ya kolamba yango. Joshua alimboli lisusu: “Ngai ná ndeko oyo tozalaki kofanda elongo tosɛngaki bandeko mibale mpe basi bálakisa biso ndenge ya kolamba bilei ya mboka na bango. Ntango kaka toyebaki kolamba bilei ya sika, tozalaki kobengisa basakoli mosusu ya lisangá mpo báya tólya elongo. Ezalaki mpe lolenge malamu ya koyeba bandeko mpe kokómisa boninga makasi.”

Paul ná Kathleen

 Mpo na oyo etali komesana na mimeseno ya mboka mopaya, Paul ná Kathleen balobi lisusu: “Tosalaki makambo oyo tosalá naino te na bomoi: totikaki lolenge na biso ya kolata mpe bilamba na biso mpe tokómaki kolata bilamba oyo esengelaki na klima ya molunge. Yango wana, esengelaki tózala na komikitisa mpe kobongola makambo mosusu, na kolanda toli ya Biblia. Komesana na mimeseno ya mboka yango ekómisaki boyokani na biso na bandeko ya lisangá makasi mpe esalaki ete mosala na biso ya kosakola ebota mbuma malamu.”

Mapamboli nini bazwaki?

 Bato mingi bakondima makambo oyo Joseph ná Christina balobi: “Mapamboli oyo bazwaki eleki mosika mikakatano oyo bakutanaki na yango. Kotika esika ya malamu esalisaki biso tótalela lisusu mikano na biso. Makambo oyo tozalaki kozwa na valɛrɛ mingi ekómi sikoyo na ntina te na miso na biso. Makambo oyo tokutanaki na yango ekómisaki lisusu makasi ekateli na biso ya kosala nyonso mpo na Yehova. Toyokaka mawa te na likambo oyo tosali kasi tozalaka nde na esengo.”

 Erica, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Kokende kosala na esika mposa ezali monene esalisaki ngai ná mobali na ngai tókanga lisusu malamu ntina ya kotyela Yehova motema. Tomonaki lisalisi ya lobɔkɔ na ye na ndenge tomoná naino te liboso. Lisusu, lokola ngai ná mobali na ngai tolekisaki ntango wana elongo, tokómi lisusu na boyokani makasi na libota.”

^ Okoki komona lisolo ya mosala ya Guyana na Buku ya mobu ya Batatoli ya Yehova 2005.

^ Filiale ya Trinité mpe Tobago nde etambwisaka mosala kuna.