Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kobundisa mɔtɔ mpe kolonga yango

Kobundisa mɔtɔ mpe kolonga yango

“Mɔtɔ! Mɔtɔ ezali awa!” Sandra, oyo azalaki kolya na ndako ya bokilo na ye, amonaki milinga ezali kobima na nse ya porte ya mwa ndako mosusu oyo ezalaki na nsima ya ndako. Ye ná mobali na ye Thomas basalaki nokinoki mpo na koboma mɔtɔ yango. Ntango Sandra azwaki eloko oyo babomelaka mɔtɔ to extincteur, Thomas akendaki mbangu na mwa ndako yango mpo na koyeba nini eleki kuna. Sandra ayaki noki na extincteur mpe apesaki Thomas mpe Thomas abomaki mɔtɔ yango. Sandra alobi boye: “Soki tósalaka eloko te, mbɛlɛ mwa ndako yango nyonso ezikaki.”

Nini esalisaki Thomas ná Sandra bábanga te mpe básala nokinoki? Ezali mpo bango ná bandeko mosusu soki 1000 oyo basalaka na Betele ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na Selters, na Allemagne, bazwaki formasyo etali ndenge ya koboma mɔtɔ.

Lopango ya Betele yango na Selters ezali monene ya ba ektare 30 mpe longola babiro mpe bandako ya kofanda, ezali mpe na esika mpo na bamasini ya kosukola bilamba, imprimeri, mpe bisika ndenge na ndenge ya kosala misala​—bisika oyo likama ya mɔtɔ ekoki kobima. Yango wana, bandeko ya departema ya sécurité ya Betele mpe bato mosusu ya Departema ya Ministère ya Environnement oyo ekipaka makambo ya securité babongisaki programɛ moko mpo na kopesa formasyo etali ndenge ya koboma mɔtɔ. Liboso, etuluku oyo eyebani ete ezali ekipi oyo eyaka nokinoki esika mɔtɔ ebimi basalaki bilakiseli elongo na bato ya departema oyo ekipaka makambo ya mɔtɔ. Ya mibale, bandeko nyonso ya Betele yango basalaka mbala na mbala makambo oyo elandi:

  • Bilakiseli etali ndenge ya kolongola bato to biloko ntango mɔtɔ ebimi.

  • Balandaka mateya etali kokima makama ya mɔtɔ.

  • Bayekolaka ndenge ya koboma mɔtɔ kaka na ebandeli na yango.

Na ndenge yango, bandeko bakómaka na makoki oyo esengeli, oyo ekosalisa bango ntango likama ebimi.

Bilakiseli etali ndenge ya koboma mɔtɔ kozanga likama

Na boumeli ya bilakiseli yango, baoyo bazwi formasyo yango bayekolaka ndenge ya koboma mɔtɔ kozanga likama. Christin, oyo ayekolaki na eteyelo ya ebandeli ndenge ya koboma mɔtɔ, alobeli formasyo oyo azwaki na Betele; alobi boye: “Nasimbaki extincteur, nafungolaki yango, mpe napusanaki pene ya mɔtɔ na ngámbo oyo mopɛpɛ ezali koya te noki te mɔtɔ ezwa ngai na elongi. Na nsima, nde nabomaki mɔtɔ​—nyonso wana kaka ngai moko! Nayekolaki mpe ndenge ya koboma mɔtɔ ná ekipi ya bato minei to mitano.”

Daniel, oyo asalaka mosala ya kopesa basusu formasyo ya koboma mɔtɔ na Betele, alobi ete bilakiseli yango “esalisaka moto abanga mɔtɔ mingi te.” “Mbala mingi soki mɔtɔ ebimi, bato babangaka makasi. Bakómaka komitungisa, mpe komituna, ‘sikoyo tokosala nini? Ndenge nini tokosalela extincteur?’ Kasi soki bayebi oyo bakosala, bakoki na pɛtɛɛ nyonso kopekisa mɔtɔ ya moke ekóma monene.” Na boumeli ya formasyo yango, “balakisaki ndenge ya kosimba extincteur malamu ntango likama ya mɔtɔ ebimi mpe koboma mɔtɔ yango. Elongolaka kobanga mpe epesaka mpiko ya kosala nokinoki ntango likama ebimi.”

Formasyo ezali na matomba

Mingi bamonisi botɔndi mpo na formasyo yango. Christin, oyo tolobelaki liboso, alobi lisusu boye: “Ezalaki mbala ya liboso nasimba extincteur na mabɔkɔ boye. Namoni moto nyonso asengeli kozwa formasyo ya boye.” Nadja, oyo ayaka kosala ndambo ya mokolo na Betele mpe asalaka na aéroport; alobi boye: “Na mbula zomi oyo eleki, tozwaki mateya etali koboma mɔtɔ na aéroport. Kasi formasyo oyo nazwi awa na Betele esali ete namityela lisusu motema. Nayebi oyo nakosala soki mɔtɔ ebimi.”

Sandra amoni ete formasyo oyo azwaki na Betele nde esalisaki ye aluka nokinoki koboma mɔtɔ na ndako ya bokilo na ye. Alobi boye: “Nabangaka lisusu mingi te mpo na kosalela extincteur. Ezali malamu kozwa formasyo yango mbula nyonso. Esalisaki ngai mpenza.”

Bilakiseli etali ndenge ya koboma mɔtɔ elongo na Departema ya koboma mɔtɔ

Bato ya departema ya Leta oyo ekipaka makambo ya koboma mɔtɔ na Selters, bayaka mbala na mbala na Betele kosala bilakiseli etali ndenge ya koboma mɔtɔ. Theo Neckermann, mokambi ya baoyo bakendaka koboma mɔtɔ, alobi boye: “Departema na biso ya koboma mɔtɔ nde ezali na mokumba ya kobatela Selters. Mbala mingi tokendaka koboma mɔtɔ na bandako ya bato to na ba apartema. Betele ekeseni mpenza na bandako yango na etúká oyo mpo ezali monene mpe bandako na yango ezali minene; mpe ezali kosɛnga mosala monene neti oyo ya kompanyi. Tosengeli kobakisa mayele mpo na kopesa lisungi na ntango ya likama na esika oyo. Yango tosepelaka kosala bilakiseli awa mpe tozali na botɔndi ndenge tozali kosala yango awa.”

Bandeko koleka 100 oyo bakipaka makambo etali koboma mɔtɔ na Betele basalaki bilakiseli yango elongo na bato ya departema yango ya Leta. Mr. Neckermann alobi lisusu boye: “Tosepeli mpenza na ekipi na bino ya koboma mɔtɔ. Soki bápesaka biso lisungi te mpe litambwisi, mbɛlɛ bilakiseli oyo tosali awa mpo na ndenge ya koboma mɔtɔ esalemi malamu te.”

Bazali kolakisa likama ya kosalela mai mpo na koluka koboma mɔtɔ ya mafuta oyo epeli

Departema yango elongo na ekipi ya koboma mɔtɔ na Betele babimisaki mayele na bango na mpokwa moko na sanza ya 02/2014. Apartema mobimba na ndako moko ya Betele etondaki milinga. Daniel, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Milinga etondaki mpenza na boye ete mwaye ya komona mabɔkɔ na biso liboso ya elongi na biso ezalaki te. Tobengaki mbala moko departema yango ya koboma mɔtɔ mpe tobandaki kobimisa bato na ba apartema yango nyonso 88. Ntango bato ya departema yango bayaki, tosí tosilisaki kobimisa bato nyonso.” Mr. Neckermann, alobi boye: “Nakoki kondima te ete na engumba lokola Frankfurt, na buludingi ya monene boye bobimisi bato nokinoki. Bozalaki mpenza na disiplini makasi mpe ekipi na bino ya koboma mɔtɔ esali mosala kitoko mpenza!” Bato yango oyo babomaka mɔtɔ bamonaki likambo oyo ebimisaki milinga yango mpe balongolaki yango. Moto moko te azokaki, eloko moko te ya monene ebebaki.

Bato nyonso na Betele ya Selters bazali na elikya ete mɔtɔ ya monene ndenge wana ekobima lisusu te. Kasi soki ebimi, bandeko bamibongisi mpo bayekoli ndenge ya kobundisa mɔtɔ mpe kolonga yango.