Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bavideo na minɔkɔ koleka 100

Bavideo na minɔkɔ koleka 100

Batatoli ya Yehova bayebani mpo na mosala na bango ya kobongola mikanda. Na sanza ya 11/2014, tobongolaki Biblia na minɔkɔ 125 mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ 742. Tobongolaka mpe bavideo. Na ndakisa, na sanza ya 01/2015, video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? ebimaki na minɔkɔ 398, mpe video Mpo na nini koyekola Biblia? na minɔkɔ 569. Mpo na nini mpe ndenge nini mosala yango esalamaki?

Na sanza ya 03/2014, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esɛngaki bafiliale ya mokili mobimba ebongola bavideo mpe ekɔtisaka mingongo na minɔkɔ mosusu mpo na kolendisa bato báyekolaka Biblia.

Kobongola video moko esɛngaka makambo mingi. Liboso, babongoli babongolaka naino maloba ya video yango. Na nsima, baponaka bandeko oyo balobaka monɔkɔ yango mpo bákɔtisa mingongo mpo na moto mokomoko ya video yango. Nsima na yango, bandeko ya stidio bakɔtisaka mingongo ya bandeko yango, baponaka maloba oyo ekɔti malamu mpe basangisaka yango mpo eyokana malamu mpe bakɔtisaka maloba oyo ekobima na bililingi ya video yango. Na nsuka, basangisaka mingongo yango, maloba mpe bililingi ya video esika moko mpo ekóma video mobimba oyo bato bakoki kozwa yango na site Internet.

Bafiliale mosusu ezalaka na bastidio mpe bandeko oyo bazwi formasyo mpo na kosala mosala yango. Bongo minɔkɔ oyo elobamaka mpe ebongolamaka mosika ya Betele?

Na mokili mobimba, bapesaki bandeko mosusu ya stidio bisaleli oyo bakoki komema mpo na kosala mosala yango. Na lisalisi ya mikro, ordinatɛrɛ mpe aparɛyi ya kokɔtisa mingongo, bandeko yango bazalaki kosala stidio na biro moko, na esika ya losambo oyo ebengami Ndako ya Bokonzi to na ndako ya ndeko moko. Bazalaki kozwa bandeko oyo balobaka minɔkɔ yango mpo batánga, bálandela ndenge mingongo ezali kokɔta mpe bátalela soki maloba ya video elobami ndenge bakomi yango. Soki basilisi kokɔtisa mingongo mpe bandimi mosala yango, ndeko oyo asalaka na stidio azalaki kokanga bisaka na ye mpo na kokende kosala esika mosusu.

Mayele yango nde esalaki ete bavideo ebima na minɔkɔ ebele mbala misato koleka ndenge ezalaki liboso.

Bavideo yango esalisi mpenza bato. Bato mingi balobi ete ezali mbala ya liboso bátala video na monɔkɔ na bango ya mboka.

Moko ya minɔkɔ oyo bakɔtisaki mingongo ebimaki ezalaki Pitjantjatjara, oyo bato koleka 2 500 balobaka na Australie. Basalaki mosala ya kokɔtisa mingongo na monɔkɔ yango na Alice Springs, teritware ya Nɔrdi. Callan Thomas oyo asalisaki mpo na kokɔtisa mongongo, alobaki boye: “Bato basepelaki mingi na bavideo yango. Bato ya mboka yango bazalaki kotala yango na likebi mpenza mpe bazalaki kotuna soki bakozwa bavideo yango mosusu wapi. Mikanda na monɔkɔ yango ezalaka mpenza te. Bato yango bakamwaka mpenza soki bayoki maloba ya mikanda oyo ekɔti na kasɛti to batali video na monɔkɔ na bango ya mboka.”

Batatoli ya Yehova mibale na Cameroun basalaki mobembo na bwato. Bakitaki naino na mboka moko ya ba-pygmée mpe basololaki na mokonzi, oyo azalaki molakisi na eteyelo moko ya mboka yango. Ntango bandeko yango bayebaki ete mokonzi ya mboka yango alobaka monɔkɔ ya Bassa, bandeko yango basalelaki tablɛti mpo na kolakisa ye video Mpo na nini koyekola Biblia? na monɔkɔ yango. Mokonzi yango akamwaki mingi mpe asɛngaki mikanda mosusu.

Na mboka moko ya Indonésie, mokonzi moko ya lingomba oyo alingaka Batatoli ya Yehova te, atumbaki mikanda nyonso oyo elimbolaka Biblia oyo bapesaki bato ya mboka yango. Bato mosusu ya mboka yango bakanaki kotumba Ndako ya Bokonzi. Na nsima, bapolisi minei bakendaki na ndako ya mwasi moko Motatoli ya Yehova mpe batunaki ye ná bato ya libota na ye mwa mituna. Balingaki koyeba makambo nini esalelamaka na Ndako ya Bokonzi, yango wana alakisaki bango video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? na monɔkɔ ya Indonésien.

Nsima ya kotala video yango, polisi moko alobaki boye: “Sikoyo, namoni ete bato bakaniselaka bino mabe mpe bayebi bino mpenza te.” Polisi mosusu atunaki boye: “Nakoki kozwa video oyo mpo nalakisa yango bato mosusu? Video yango esalisi biso tóyeba makambo oyo etali bino mpenza.” Sikoyo bapolisi batiki kokanisela Batatoli ya Yehova mabe mpe bakómi kobatela bango.

Soki otalá naino bavideo yango te, mpo nini te otala yango na monɔkɔ na bino ya mboka?