Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Kotya langi na makomi​—Android

Kotya langi na makomi​—Android

Ntango ozali kotánga mikanda to koyekola na JW Library, okoki kotya langi na maloba to na bafraze.

Landá malako oyo mpo oyeba kotya langi:

 Kotya langi

Ezali na ndenge mibale ya kosala yango.

Finá liloba mwa ntango molai mpo ozwa yango. Okoki kosalela bansɔngɛ mpo na kozwa maloba mosusu. Na bilembo mibale oyo ebimi wana, bɛtá oyo ezali na langi na kati; na nsima poná langi oyo olingi kotya na mokomi.

Mpo otya langi mbala moko na liloba to na fraze, finá mpe kotika te, na nsima bendá mosapi tii esika olingi. Ntango ozali kobenda, makomi ezali kozwa langi. Soki osilisi, bilembo ekobima wana. Okoki kopona langi mosusu to kolongola langi.

 Kotya langi ya sika

Mpo na kotya langi mosusu, bɛtá makomi oyo otyaki langi; na nsima poná langi mosusu.

Mpo olongola langi oyo otyaki, bɛtá makomi oyo otyaki langi; na nsima bɛtá elembo ya kobwaka.

Makambo yango ebimaki na sanza ya zomi na moko na 2015 na JW Library 1.6, oyo esalaka malamu na aparɛyi Android 4.0 matá. Soki ozali komona yango te, landá malako oyo ezali na lisolo “Bandá kosalela JW Library​—Android,” na motó ya likambo Mpo na Kozwa makambo ya sika.