Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yisaya 42:8​—“Nazali NKOLO”

Yisaya 42:8​—“Nazali NKOLO”

 “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te, lisanzoli na ngai na bikeko oyo eyemami mpe te.”​—Yisaya 42:8, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Nazali NKOLO: Yango nde nkombo na ngai: mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te, lisanzoli na ngai na bikeko oyo esalemi mpe te.”​—Yisaya 42:8, Biblia King James Version.

Ndenge Yisaya 42:8 elimbolami

 Nzambe ayebisi biso nkombo na ye mpe abakisi ete akolinga te nkembo na ye ekende epai ya moto mosusu to na bikeko.

 Nzambe amipesaki nkombo yango, oyo mbala mingi ebongolamaka na “Yehova” na Lingala. a (Kobima 3:14, 15) Atako nkombo ya Nzambe emonanaka soki mbala 7 000 na Kondimana ya Sika (Makomami ya Ebre mpe ya Aramɛyɛ), babongoli mingi ya Biblia batyaka na esika na yango titre “NKOLO” (na balɛtrɛ ya minene). Na ndakisa, Nzembo 110:1 ezali na maloba ya esakweli oyo elobeli Yehova ná Yesu. Na Biblia King James Version, totángi boye: “NKOLO [Yehova] alobaki na Nkolo na ngai [Yesu].” (Misala 2:34-36) Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika elongoli mobulungano nyonso oyo ekoki kobima kati ya “Bankolo” wana mibale na kotya nkombo ya Nzambe na esika ebongi mpenza. Elobi boye: “Liloba oyo Yehova alobi na Nkolo na ngai yango oyo: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.’”

 Bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia bandimaka ete nkombo ya Nzambe elimboli “Akómisaka.” Kaka Nzambe ya solo ye moko nde akoki komipesa nkombo ya ndenge wana, mpo kaka ye moko akoki komikómisa ndenge nyonso oyo alingi, to kokómisa bikelamu na ye ndenge nyonso oyo alingi, mpo na kokokisa mokano na ye.

 Lokola azali Mozalisi na biso mpe kaka ye nde Nzambe ya solo, tosengeli kokangama kaka na ye. Tosengeli te kosambela moto mosusu to eloko moko, na ndakisa bikeko to bililingi.​—Kobima 20:2-6; 34:14; 1 Yoane 5:21.

Makambo oyo bazali kolobela na Yisaya 42:8

 Na bavɛrsɛ ya ebandeli ya Yisaya mokapo 42, Yehova asakolaki mosala na ye epai ya ‘moto oyo ye aponá.’ Nzambe alobaki boye mpo na mosaleli oyo aponá: “Akomonisa bikólo bosembo.” (Yisaya 42:1) Na kotalela elaka yango, Nzambe alobaki boye: “Nazali kosakola makambo ya sika. Liboso yango ebima, nazali koyebisa bino yango.” (Yisaya 42:9) Esakweli etali ‘moto oyo ye aponá’ esalemaki, to ekokisamaki nsima ya basiɛklɛ ebele ntango Masiya, to Kristo, ayaki mpe akokisaki mosala na ye awa na mabele.​—Matai 3:16, 17; 12:15-21.

Yisaya 42:8 uta na mabongoli mosusu ya Biblia

 “Ngai nazali Yawe, yango nkombo na ngai, nakopɛsa nkɛmbɔ na ngai epai na mosusu tɛ, kosanzola na ngai epai na bikeko tɛ.”​—Biblia haut fleuve.

 “Ngai nazali Yawe, yango nde kombo na ngai. Bokonzi na ngai, nakotikela yango moto mosusu té, pe nakosala ‘tè bápesa lisusu lokumu na ngai Nzambe na bikeko té.”​—Biblia na lingala ya lelo oyo.

a Nkombo ya Nzambe na Ebre ekomamaka na balɛtrɛ minei, oyo mbala mingi na Lingala ekomamaka na YHWH. Babongoli mosusu ya Lingala babongolaka nkombo ya Nzambe na “Yawe.” Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre” na eteni 1 ya Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe.