Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Tyá mosala na esika na yango

Tyá mosala na esika na yango

 Na eleko oyo teknoloji ekómi kosalelama mingi, patrɔ na yo, baninga ya mosala, to bakiliya bakoki kosɛnga yo osalaka mikolo nyonso mpe ngonga nyonso. Yango esalaka ete ezala mpasi oyeba kokabola mosala na yo ná makambo mosusu ya bomoi, na ndakisa, libala na yo, mpe kotya na esika ya liboso makambo oyo eleki ntina na bomoi.

 Oyo osengeli koyeba

  •   Teknoloji ekoki kosala ete olekisa na mosala ntango oyo osengeli kolekisa elongo na molongani na yo. Na yango, ntango nyonso babengi yo na telefone mpo na mosala, batindeli yo e-mail, to mesaje okozala ntango nyonso na mposa ya koyanola.

     “Bomoi ezangi mindɔndɔ, kozonga na ndako nsima ya ngonga ya mosala mpe kolekisa ntango elongo na bato ya libota ekómi sikoyo mpasi, mpamba te ntango babengi yo na telefone mpe ozali kozwa bamesaje ya mosala, makanisi na yo ekokende mingimingi na mosala na esika ya molongani na yo.”​—Jeanette.

  •   Mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala mpe bomoi ya libota, osengeli kobongisa makambo liboso. Soki ozali na programɛ te, mosala na yo ekoki kozwa ntango oyo osengeli kolekisa elongo na molongani na yo.

     “Mbala mingi, okoki kobosana molongani na yo mpe kokanisa boye: ‘Oh, ayebi oyo nazali kosala. Akolimbisa ngai. Nakolekisa ntango elongo na ye ata nsima.’”​—Holly.

 Makanisi mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala

  •   Tyá libala na yo na esika ya liboso. Biblia elobi: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:6) Soki okotika te bato ‘bákabola’ yo ná molongani na yo, mpo na nini okotika ete mosala ekabola bino?

     “Bakiliya mosusu bakanisaka ete lokola bafutaka yo, bakoki kosalela yo ntango nyonso oyo bazali na bosɛnga na yo. Koyeba ete nasengeli kotya libala na ngai na esika ya liboso, nayebisaka bango ete nakoki te kosala mosala na ntango oyo nazali te na mosala, kasi nakobenga bango nsima.”​—Mark.

     Omituna boye: ‘Makambo oyo nasalaka emonisaka ete nazwaka libala na ngai na ntina mingi koleka mosala?’

  •   Boyáká kosala mosala mosusu soki esengeli. Biblia elobi: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2) Bopɔlɔ ekosalisa yo ozala na bwanya ya koboya kosala mosala mosusu to kotikela yango moto mosusu.

     “Nabongisaka batiyo ya mai, yango wana soki moto moko azali na mposa nasalisa ye na lombangu, amitungisaka makasi. Soki nakoki te kosala yango na ntango oyo ye alingi, nayebisaka ye aluka moto mosusu.”​—Christopher.

     Omituna boye: ‘Naboyaka kosala mosala mosusu nsima ya ngonga ya mosala soki kondima yango ekosala ete molongani na ngai amiyoka ete asundolami? Molongani na ngai akoloba nini soki nandimi yango?’

  •   Bósala programɛ elongo. Biblia elobi: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.” (Mosakoli 3:1) Soki omoni ete ozali na makambo mingi ya kosala na mosala, na ntango wana, bosengeli kobongisa programɛ elongo na molongani na yo mpe na nsima bosengeli kotosa programɛ yango.

     “Mbala mingi ntango tozalaka na makambo mingi ya kosala, totyaka ntango moko ya kolekisa elongo, ata soki ezali kaka kolya elongo to kotambola na libongo, yango esalaka ete tólekisa ntango elongo.”​—Deborah.

     Omituna boye: ‘Nabongisá ntango moko boye oyo natyaka likebi na ngai nyonso epai ya molongani na ngai? Eyano nini molongani na ngai akopesa?’

  •   Kangáká baaparɛyi na yo. Biblia elobi: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Okoki kokanga baaparɛyi na yo na ntango moko boye mpo makanisi na yo eyengayenga te na telefone to bamesaje ya mosala oyo bazali kotindela yo?

     “Nasalaka makasi nasala te mosala na ntango oyo natyá mpo na makambo mosusu. Na ntango yango, nasalaka ete namona te bamesaje oyo ezali kokɔta na telefone na ngai.”​—Jeremy.

     Omituna boye: ‘Namiyokaka ete nasengeli kotika telefone ya kofungwama kaka mpo patrɔ to bakiliya bakozala na mposa na ngai? Eyano nini molongani na ngai akopesa?’

  •    Kozala makambo makasimakasi te. Biblia elobi: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Na bantango mosusu, mosala ekoki kozwa ntango oyo bosengeli kolekisa elongo na molongani na yo. Na ndakisa, mbala mosusu na kotalela lolenge ya mosala oyo molongani na yo azali na yango ekoki kosɛnga ete azala na mosala to asololaka nsima ya ngonga ya mosala. Kosɛnga molongani na yo te makambo oyo akoki kosala te.

     “Mobali na ngai azalaka moto ya mombongo, mpe mbala mingi esɛngaka nsima ya bangonga asalaka makambo mosusu na lombangu. Na bantango mosusu, etungisaka ngai, kasi lokola tolekisaka ntango mingi elongo, namonaka yango mabe te.”​—Beverly.

     Omituna boye: ‘Namonisaka molongani na ngai ete nayebi ete azali na mosala mingi mpe nakoki te kosɛnga ye makambo oyo akoki te kosala? Eyano nini molongani na ngai akopesa?’

 Mituna ya kotalela

 Ya liboso, mokomoko na bino akoki kotalela mituna oyo ye moko. Na nsima, bólobela biyano na bino elongo.

  •   Mbala mingi molongani na yo amilelaka mpo okobaka kosala mosala tii na ndako? Soki bongo, ondimi yango?

  •   Na makambo nini ya sikisiki omoni ete okoki kobongola mpo ozala na bokatikati na oyo etali mosala?

  •   Esí ekómelá yo okanisa ete molongani na yo azali te kotya mosala na esika na yango? Soki bongo, makambo nini emonisi yango?

  •   Soki mbongwana ezali, oyo wapi okosepela molongani na yo asala mpo atya mosala na esika na yango?