Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ebongwaná to babebisá makambo mosusu na kati?

Biblia ebongwaná to babebisá makambo mosusu na kati?

 Te. Ndenge bato bakokanisi bamaniskri ya kala ná makambo oyo ezali na Biblia, emonisi mpenza ete Biblia ebongwani te atako basalá bakopi na yango na boumeli ya bankoto ya bambula na bisaleli oyo ebebaka.

Elingi koloba ete baoyo basalaki bakopi yango bakɔtisá ata libunga moko te?

 Bamoni ebele ya bamaniskri ya kala ya Biblia. Mpe bamaniskri yango mosusu ezali na mwa bokeseni, yango emonisi ete mwa mabunga ekɔtaki ntango bazalaki kosala bakopi na yango. Mingi ya bokeseni yango ezali na makambo mikemike mpe ebongoli ndimbola ya maloba te. Ata bongo, bamoni mwa ndambo ya bokeseni makasi, oyo emonani ete mosusu kati na yango bakɔtisaki yango banda kala na nko mpo na kobebisa nsango ya Biblia. Tózwa bandakisa mibale:

  1.   Na 1 Yoane 5:7, mabongoli mosusu ya kala ya Biblia ezali na maloba oyo: “Na likoló, Tata, Liloba mpe Elimo santu: bango misato bazali moto moko.” Nzokande, bamaniskri oyo ebongi kotyelama motema emonisi ete maloba yango ezalaki te na makomi ya ebandeli. Babakisaki yango nde na nsima. a Yango wana, lelo oyo, mabongoli ya malamu ya Biblia elongoli maloba yango.

  2.   Nkombo ya Nzambe ezali mbala ebele na bamaniskri ya kala ya Biblia. Ata bongo, mabongoli mingi ya Biblia elongolá nkombo yango mpe etyá na esika na yango titre lokola “Nkolo” to “Nzambe.”

Nini ekoki kondimisa biso ete bakomona ebele ya mabunga mosusu te?

 Na ntango oyo bamaniskri mingi emonani, ezali lisusu mpasi te komona mabunga koleka ndenge ezalaki liboso. b Ndenge bakokanisi bamaniskri yango, emonisi nini na likambo etali bosikisiki ya Biblia?

  •   Ntango alobelaki makomi ya Makomami ya Ebre (oyo babengaka “Testama ya Kala”), William Henry Green, moto moko ya mayele, alobaki boye: “Tokoki koloba mpenza ete ezali na buku mosusu te ya ntango ya kala oyo bakopi na yango esalemi na bosikisiki lokola Biblia.”

  •   Frederick Fyvie Bruce, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia akomaki boye mpo na Makomami ya Grɛki ya bokristo, oyo ebengamaka Testama ya Sika: “Ezali na makambo mingi oyo endimisi ete makomi ya Testama ya Sika ezali solo koleka makomi mingi ya bato mosusu ya kala, ata bongo moto moko te atyelaka makomi ya bato yango ntembe.”

  •   Sir Frederic Kenyon, moto ya mayele oyo ayebani mingi na makambo ya Biblia alobaki ete moto “akoki kosimba Biblia mpe koloba kozanga kobanga to kokakatana ete asimbi na mabɔkɔ na ye Liloba ya Nzambe mpenza, oyo mabota na mabota, bakopi na yango esalemi malamu na boumeli ya basiɛklɛ, kozanga ete makambo ya ntina ebunga.”

Bantina nini mosusu tozali na yango ya kondima ete bakopi ya Biblia esalemaki na bosikisiki?

  •   Ezala Bayuda to bakristo oyo bazalaki kosala bakopi yango babatelaki masolo oyo emonisaki mabunga minene oyo basaleli ya Nzambe basalaki. c (Mitángo 20:12; 2 Samwele 11:2-4; Bagalatia 2:11-14) Ndenge moko mpe, babatelaki makomi oyo ekweisaki ekólo ya Bayuda mpo na kozanga botosi na bango mpe oyo etɔndɔlaki mateya oyo bato bango moko babimisaki. (Hosea 4:2; Malaki 2:8, 9; Matai 23:8, 9; 1 Yoane 5:21) Lokola bakomaki masolo yango na bosikisiki, baoyo basalaki bakopi yango bamonisaki ete babongi kotyelama motema mpe bazalaki kozwa Liloba mosantu ya Nzambe na motuya mingi.

  •   Ebongi mpenza te tóloba ete Nzambe oyo na litambwisi ya elimo santu atindaki bato bakóma Biblia, akokaki mpe kosala ete bosikisiki na yango ebatelama? d (Yisaya 40:8; 1 Petro 1:24, 25) Mposa na ye ezalaki kaka te ete bato ya ntango ya kala bázwela yango litomba kasi mpe biso lelo oyo. (1 Bakorinti 10:11) Kutu, “makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.”​—Baroma 15:4.

  •   Yesu ná bayekoli na ye bazongelaki maloba ya Makomami ya Ebre kozanga komitungisa mpo na bosikisiki ya makomi wana ya kala.​—Luka 4:16-21; Misala 17:1-3.

a Maloba yango ezali te na Codex Sinaiticus, Codex Alexandrinus, Maniskri 1209 ya Vatican, Vulgate ya Latin, Philoxenian to Harclean Syriac Version, to Syriac Peshitta.

b Na ndakisa, bautaki komona bamaniskri koleka 5 000 ya oyo babengaka Testama ya Sika to Makomami ya Grɛki ya bokristo.

c Biblia elobeli te bamonisi ya Nzambe lokola bato moko oyo basalaka mabunga te. Kutu endimi polele ete: “Ezali na moto moko te oyo asalaka lisumu te.”​—1 Bakonzi 8:46.

d Biblia elobi ete atako Nzambe apesaki te liloba mokomoko mpo bakomi ya Biblia bákóma yango, kasi akambaki nde makanisi na bango.​—2 Timote 3:16, 17; 2 Petro 1:21.