Lakisá makambo oyo ezali na kati

Elekeli ezali nini?

Elekeli ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Elekeli ezali fɛti ya Bayuda oyo basalaki ntango Nzambe asikolaki Bayisraele na boombo na Ezipito na 1513 L.T.B. Nzambe asɛngaki Bayisraele bákanisaka likambo wana ya ntina mbula nyonso na mokolo ya 14 na sanza ya Abibe na kalandriye ya Bayuda, mpe na nsima Abibe ekómaki kobengama Nisana.​—Kobima 12:42; Balevi 23:5.

Mpo na nini ebengami Elekeli?

 Liloba “Elekeli” esalelami mpo na kolobela ntango oyo Nzambe abikisaki Bayisraele ntango abomaki mwana nyonso ya liboso na Ezipito. (Kobima 12:27; 13:15) Liboso Nzambe abimisa bolɔzi yango, ayebisaki Bayisraele báboma mwana-mpate to ntaba mpe bápakola makila na yango na makonzí mibale ya baporte ya bandako na bango. (Kobima 12:21, 22) Nzambe asengelaki komona elembo yango mpe “koleka likoló na” bandako na bango mpe kobikisa mwana nyonso ya liboso na bango.​—Kobima 12:7, 13.

Ndenge nini bazalaki kosala fɛti ya Elekeli kala?

 Nzambe apesaki Bayisraele malako mpo na ndenge ya kosala fɛti ya Elekeli ya liboso. a Talá makambo mosusu Biblia elobeli mpo na Elekeli.

  •   Mbeka: Mabota ezalaki kopona mwana-mpate to ntaba ya mbula moko na mokolo ya zomi na sanza ya Abibe to Nisana, mpe na mokolo ya 14, bazalaki koboma yango. Na Elekeli ya liboso, Bayuda bapakolaki ndambo ya makila yango na makonzí mibale ya porte mpe na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí ya porte, batumbaki nyama yango mobimba, mpe balyaki yango.​—Kobima 12:3-9.

  •   Bilei: Longola mwana-mpate to ntaba, Bayisraele bazalaki mpe kolya bagato ezangá levire mpe ndunda ya bololo lokola eteni ya bilei ya Elekeli.​—Kobima 12:8.

  •   Molulu: Bayisraele bazalaki kosala Molulu ya bagato ezangá levire na boumeli ya mikolo nsambo nsima ya Elekeli, ntango oyo bazalaki kolya te eloko oyo etyami levire.​—Kobima 12:17-20; 2 Ntango 30:21.

  •   Koteya: Elekeli ezalaki kopesa baboti libaku ya koteya bana na bango makambo ya Yehova Nzambe.​—Kobima 12:25-27.

  •   Mobembo: Na nsima, Bayisraele bazalaki kokende na Yerusaleme mpo na kosala fɛti ya Elekeli.​—Kolimbola Mibeko 16:5-7; Luka 2:41.

  •   Mimeseno mosusu: Na mikolo ya Yesu, bakómaki mpe komɛla vinyo mpe koyemba na fɛti ya Elekeli.​—Matai 26:19, 30; Luka 22:15-18.

Makanisi ya libunga mpo na Elekeli

 Libunga: Bayisraele bazalaki kolya bilei ya Elekeli mokolo ya 15 Nisana.

 Solo: Nzambe asɛngaki Bayisraele báboma mwana-mpate kaka nsima ya kolala ya moi na mokolo ya 14 Nisana mpe bálya yango kaka butu yango. (Kobima 12:6, 8) Bayisraele bazalaki kotánga mokolo na bango kobanda kolala ya moi tii kolala mosusu ya moi. (Balevi 23:32) Na yango, Bayisraele bazalaki koboma mwana-mpate yango mpe kolya bilei ya Elekeli na ebandeli ya mokolo ya 14 Nisana.

 Libunga: Bakristo basengeli kosala fɛti ya Elekeli.

 Solo: Nsima ya kosala fɛti ya Elekeli na mokolo ya 14 Nisana na mobu 33 T.B., Yesu abandisaki molulu ya sika: Bileli ya mpokwa ya Nkolo. (Luka 22:19, 20; 1 Bakorinti 11:20) Bilei yango ezwaki esika ya Elekeli, mpo ekundolaka mbeka ya “Kristo [mwana-mpate ya] Elekeli.” (1 Bakorinti 5:7) Mbeka ya lisiko ya Yesu eleki mosika bambeka ya Elekeli mpo elongoli bato nyonso na boombo ya lisumu mpe liwa.​—Matai 20:28; Baebre 9:15.

a Nzokande, nsima ya mikolo, makambo mosusu esengelaki kosembolama. Na ndakisa, Bayisraele basalaki fɛti ya liboso ya Elekeli “mbangumbangu” mpo basengelaki kolongwa na Ezipito. (Kobima 12:11) Kasi, ntango bakómaki na Mokili ya Ndaka, Bayisraele basengelaki lisusu te kosala fɛti yango mbangumbangu.