Lakisá makambo oyo ezali na kati

Moize moto akomaki Biblia?

Moize moto akomaki Biblia?

Eyano ya Biblia

 Nzambe asalelaki Moize mpo na kokoma mikanda 5 ya liboso: Ebandeli (Genese), Kobima (Exode), Balevi (Levitike), Mitángo (Mituya), mpe Kolimbola Mibeko (Deteronome). Mbala mosusu ye nde moto akomaki mokanda ya Yobo mpe Nzembo 90. Kasi, Moize akomaki Biblia mobimba ye moko te; bato nyonso oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma Biblia bazalaki soki 40.