Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

“Bokonzi ya Nzambe ezali ndɔtɔ te”

Efraín De La Cruz

“Bokonzi ya Nzambe ezali ndɔtɔ te”
  • ABOTAMAKI NA 1918

  • BATISIMO 1949

  • NA MOKUSE Akɔtaki bolɔkɔ mpe babɛtaki ye pene na liwa na babolɔkɔ nsambo, kasi ekateli na ye ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe elɛmbaki te.

NA 1948, ngai, mwasi na ngai Paula, ná mwana na biso ya mwasi tokómaki kokende na makita ya Batatoli ya Yehova na engumba Blanco Arriba. Tozalaki kotambola kilomɛtrɛ 40 mpo na kokende mpe kozonga, kasi tozangisaki makita ata mokolo moko te. Na mokolo ya 03/01/1949, ngai ná Paula tozwaki batisimo.

Nsima ya sanza motoba, bakangaki ngai ná bandeko mosusu ya lisangá mpe bakatelaki biso sanza misato ya bolɔkɔ. Tozalaki kolala na mabele mpe kolya kaka mbala moko na mokolo, bitabe ná ti. Ntango babimisaki biso na bolɔkɔ, bakonzi ya guvɛrnema babangisaki biso mpe bakanisaki ete tokotika kosakola. Kasi ntango tozongaki na ndako, tozongelaki kosakola mpe koyangana na makita na kobatama. Lokola basali ya guvɛrnema bazalaki ntango nyonso kokɛngɛla biso, tozalaki kosala makita na bandako ya bandeko, na bilanga ya kafe, to mpe na baferme. Tozalaki kozongela esika moko mbala mibale te; na nsuka ya makita, tozalaki koyebisa bandeko esika tokosala makita mbala ya nsima. Mpo na kosakola, moto azalaki kobima kaka ye moko; tozalaki kolata bilamba ya mosala, mpe tozalaki kosalela mikanda te, Biblia mpe te. Atako bongo, kobanda 1949 tii 1959 nakɔtaki babolɔkɔ nsambo, mbala nyonso nazalaki koumela kuna sanza misato, ntango mosusu mpe sanza motoba.

Nasengelaki kozala mpenza ekɛngɛ mpo bandeko na ngai mosusu ya libota mpe bazalaki kotɛmɛla ngai. Nazalaki kolala na bangomba to na ferme mpo bákanga ngai te, kasi na bantango mosusu bazalaki kaka kokanga ngai. Mokolo moko ntango bakangaki ngai, batindaki ngai na bolɔkɔ La Victoria na engumba Ciudad Trujillo, esika batyaka bato 50 to 60 na kasho. Kuna tozalaki kolya mbala mibale na mokolo, pɔtɔpɔtɔ ya masango na ntɔngɔ mpe mwa loso ná madesu na midi. Biso nyonso Batatoli oyo tozalaki kuna tozalaki kosakwela baninga na biso ya bolɔkɔ; tozalaki kosala makita mbala na mbala, na libaku yango tozalaki kozongela bavɛrsɛ oyo tokangá na motó mpe kolobela makambo oyo tokutanaka na yango na mosala ya kosakola.

Mbala ya nsuka oyo nakɔtaki bolɔkɔ, soda moko abɛtaki ngai kolosi ya mondoki na motó mpe na mpanzi. Atako tii lelo nayokaka mpasi na nzoto ndenge abɛtaki ngai mpe mpo na makambo mosusu oyo basalaki ngai, mikakatano wana elendisaki kondima na ngai, ezaleli na ngai ya koyika mpiko, mpe ekateli na ngai ya kosalela Yehova.

Lelo, nazali na mbula 96 mpe nazali mosaleli na misala na lisangá. Atako nakokaka lisusu kotambola mingi te, nafandaka liboso ya ndako na ngai mpe nasakwelaka moto nyonso oyo azali koleka. Bokonzi ya Nzambe ezali ndɔtɔ te mpo na ngai. Ezali likambo ya solo, mpe nayebisaka yango bato mosusu esali mbula koleka 60. Mokili ya sika ezali likambo ya solo mpo na ngai lelo oyo, ndenge kaka ezalaki mokolo ya liboso oyo nayokaki nsango malamu ya Bokonzi. *

^ par. 3 Ndeko Efraín De La Cruz akufaki ntango tozalaki kobongisa lisolo oyo.