Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Motomboki monene akómi mosaleli ya Nzambe

Juan Crispín

Motomboki monene akómi mosaleli ya Nzambe
  • ABOTAMAKI NA 1944

  • BATISIMO 1964

  • NA MOKUSE Liboso azalaki kondima te ete Nzambe azalaka, kasi asili kosalela Yehova na bosembo mbula 50.

NTANGO nazalaki elenge, nalɛmbaki nzoto mpo na koyinana oyo ezalaki na kati ya mangomba. Lisusu, nayebaki te ntina oyo Nzambe asilisi bobola te mpe makambo ya kozanga bosembo, mpe ntina oyo ebele ya bato oyo basambelaka basalelaka te makambo oyo Biblia elobi. Yango wana, nakómaki kondima ete Nzambe azalaka te, mpe ete botomboki na guvɛrnema nde ekobongisa mokili.

Na 1962, nakómaki kotánga zulunalo Lamuká! Na nsima, na 1963, nandimaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Makambo oyo nayekolaki ekɔtaki ngai mpenza. Nayebaki ntina oyo esengeli te kopesa Nzambe foti mpo na makambo ya mabe oyo mangomba esalá. Nayebaki mpe ete azali na mokano moko ya malamu mpo na bato. Sanza mibale nsima ya kobanda koyekola, nakómaki koyebisa bato ete Bokonzi ya Nzambe ekolongola mokili oyo mabe. Nazwaki batisimo na 1964, mpe nakómaki mobongisi-nzela monene na 1966. Namonaka ete Biblia ebikisá bomoi na ngai, mpo baninga na ngai mingi, oyo bazalaki mpe batomboki na bolenge, bamosusu bakufá liwa ya nsɔmɔ, bamosusu bazali na bolɔkɔ, bamosusu bakimá mboka. Napesaka Yehova matɔndi mpo asali ete ngai moto oyo nazalaki kondima te ete Nzambe azalaka mpe nazalaki na elikya te, nakóma mosaleli ya Nzambe oyo alaki mokili ya sika ya boyengebene.

Ndeko Crispín azali kolimbola mokapo ya mokolo na Betele