Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 2

Nzambe azali nani?

Nzambe azali nani?

1. Mpo na nini tosengeli kosambela Nzambe?

Nzambe ya solo azali Mozalisi ya biloko nyonso. Azali na ebandeli te, akozala mpe na nsuka te. (Nzembo 90:2) Nsango malamu oyo ezali na Biblia euti epai na ye. (1 Timote 1:11) Lokola Nzambe apesá biso bomoi, tosengeli kosambela kaka ye.​—Tángá Emoniseli 4:11.

2. Nzambe azalaka ndenge nini?

Moto ata moko te amoná Nzambe mpo azali Elimo, yango elakisi ete azali na lolenge ya bomoi oyo eleki mosika bomoi ya bikelamu oyo ezali awa na mabele. (Yoane 1:18; 4:24) Atako bongo, tokoki komona bizaleli ya Nzambe na nzela ya biloko oyo asalá. Na ndakisa, mbuma ná fololo ndenge na ndenge emonisaka ete Nzambe azali bolingo mpe azali na bwanya. Bonene ya molɔ́ngɔ́ emonisaka biso nguya na ye.​—Tángá Baroma 1:20.

Tokoki kutu koyekola makambo mingi oyo etali bizaleli ya Nzambe ntango tozali kotánga Biblia. Na ndakisa, eyebisaka biso oyo Nzambe alingaka mpe oyo aboyaka, ndenge asalelaka bato makambo, mpe ndenge oyo ayokaka soki tosali likambo boye to boye.​—Tángá Nzembo 103:7-10.

3. Nzambe azali na nkombo?

Yesu alobaki: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Atako Nzambe azali na batitre mingi, azali na nkombo kaka moko. Nkombo yango ebengamaka ndenge moko te na minɔkɔ nyonso. Na Lingala, ebengamaka mbala mingi “Yehova.” Kasi, bato mosusu babengaka yango “Yawe.”​—Tángá Nzembo 83:18.

Babiblia mingi elongolá nkombo ya Nzambe mpe na esika na yango etyá batitre lokola Nkolo to Nzambe. Kasi, ntango Biblia ekomamaki, nkombo ya Nzambe ezalaki mbala soki 7 000. Yesu alakisaki bato nkombo yango ntango azalaki koteya bango makambo ya Nzambe.​—Tángá Yoane 17:26.

Talá video Nzambe azali na nkombo?

4. Yehova akipaka biso?

Lokola tata ya bolingo, Nzambe azali koluka bolamu na biso ya seko

Lokola bato mingi bazali konyokwama, yango elakisi nde ete Nzambe akipaka biso te? Bato mosusu balobaka ete Nzambe atikaka biso tónyokwama mpo ameka biso; kasi yango ezali solo te.​—Tángá Yakobo 1:13.

Nzambe apesá biso lokumu na ndenge asalá biso na bonsomi ya kopona. Tosepelaka te na bonsomi oyo tozali na yango ya kopona kosalela ye? (Yosua 24:15) Kasi, bato mingi baponaka kosalela basusu mabe, yango wana mpasi etondi na mokili. Yehova ayokaka mawa na motema ndenge amonaka kozanga bosembo ya ndenge wana.​—Tángá Ebandeli 6:5, 6.

Yehova azali Nzambe oyo akipaka biso. Alingaka ete tósepela na bomoi. Mosika te, akolongola mpasi nyonso mpe bato oyo babimisaka yango. Kasi sikoyo, ezali na ntina oyo Nzambe atiki bampasi mpo na mwa ntango. Na liteya 8, tokoyeba ntina yango.​—Tángá 2 Petro 2:9; 3:7, 13.

5. Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe?

Yehova azali kobenga biso tópusana penepene na ye na nzela ya libondeli. Akipaka mokomoko na biso. (Nzembo 65:2; 145:18) Andimaka kolimbisa biso. Amonaka milende oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye, atako na bantango mosusu tosalaka mabunga. Na yango, atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki mpenza kozala na boyokani malamu na Nzambe.​—Tángá Nzembo 103:12-14; Yakobo 4:8.

Lokola Yehova apesá biso bomoi, tosengeli kolinga ye koleka moto mosusu nyonso. (Marko 12:30) Okomonisa ete olingaka Nzambe soki oyekoli makambo mingi oyo etali ye mpe osali makambo oyo azali kosɛnga, mpe yango ekosala ete opusana lisusu penepene na ye.​—Tángá 1 Timote 2:4; 1 Yoane 5:3.