Mokanda ya Yakobo 1:1-27

  • Mbote (1)

  • Koyika mpiko epesaka esengo (2-15)

    • Kondima oyo emekami (3)

    • Kokoba kosɛnga na kondima (5-8)

    • Mposa ememaka na lisumu mpe liwa (14, 15)

  • Likabo nyonso ya malamu eutaka na likoló (16-18)

  • Koyoka mpe kosalela liloba (19-25)

    • Moto oyo azali kotala na talatala (23, 24)

  • “Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te” (26, 27)

1  Yakobo,+ moombo ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo, epai ya mabota 12 oyo epalangani epai na epai: Mbote!  Bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge, bómona yango esengo mpenza,+  mpo boyebi ete kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.+  Kasi tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.+  Bongo soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe,+ mpo apesaka bato nyonso na motema mobimba, mpe apamelaka te,*+ mpe akopesa ye yango.+  Kasi akoba kosɛnga na kondima,+ atya ntembe ata moke te,+ mpo moto oyo azali kotya ntembe azali lokola mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ezali komema mpe kotindika epai na epai.  Ya solo, moto wana akanisa te ete akozwa eloko epai ya Yehova;*  azali moto ya mitema mibale,+ mpe apikamá te na makambo nyonso oyo asalaka.  Kasi ndeko oyo azali mobola asepela* na kotombwama na ye,+ 10  mpe ndeko oyo azali mozwi asepela na kokitisama na ye,+ mpo akoleka lokola fololo ya elanga. 11  Mpo kaka ndenge moi ebimaka na molunge na yango ya makasi mpe ekaukisaka milona, mpe fololo na yango ekweaka mpe kitoko na yango ebebaka, ndenge moko mpe mozwi akokufa wana azali kolanda bomɛngo.+ 12  Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama,+ mpo lokola akokóma moto oyo andimami akozwa motole* ya bomoi,+ oyo Yehova* alakaki baoyo bazali kokoba kolinga ye.+ 13  Ntango moto azali komekama, aloba te ete: “Nzambe azali komeka ngai.” Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te, mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te. 14  Kasi moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko* oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.+ 15  Na nsima, mposa wana ntango ekoli,* eboti lisumu; lisumu mpe ntango esalemi, eboti liwa.+ 16  Bandeko na ngai ya bolingo, bómikosa te. 17  Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló,+ eutaka na Tata ya miinda ya likoló,+ oyo na bokeseni na elili oyo ebongwanaka, ye abongwanaka te.*+ 18  Lokola ezalaki mposa na ye, asalaki ete tózala na bomoi* na ndenge asalelaki liloba ya solo.+ Asalaki yango mpo tókóma mbuma ya liboso ya bikelamu na ye.+ 19  Bandeko na ngai ya bolingo, bóyeba likambo oyo: Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te,+ koyokaka nkanda noki te,+ 20  mpo nkanda ya moto esalaka te makambo oyo ezali sembo na miso ya Nzambe.+ 21  Yango wana, bóbwaka mbindo nyonso mpe mabe ya ndenge nyonso,*+ mpe bóndima na boboto liloba oyo ekoki kobikisa bino,* efanda mpenza na kati na bino. 22  Nzokande, bózala kaka te bayoki, kasi bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe,+ mpe bómikosa te na makanisi ya lokuta. 23  Mpo soki moto azali moyoki ya liloba, kasi asalelaka yango te,+ moto yango azali lokola moto oyo azali kotala elongi na ye na talatala. 24  Mpo amitali, akei mpe na mbala moko abosani ndenge azali. 25  Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka+ mpe ya bonsomi mpe azali kokangama na yango, akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosalela makambo yango. Mpe akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.+ 26  Soki moto akanisaka ete asambelaka Nzambe* kasi apekisaka lolemo na ye te,+ azali kokosa motema na ye moko, mpe losambo na ye ezali mpamba. 27  Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike+ ná basi oyo mibali bakufá+ na mpasi na bango,+ mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ ya mokili.+

Maloba na nse

To, “alukaka mabunga te.”
Talá Ap. A5.
Lil., “amikumisa.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
Talá Ap. A5.
To, “akangami na motambo lokola na mpambo.”
Lil., “ntango ezwi zemi.”
To, “epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.”
To, “abotaki biso.”
To mbala mosusu, “mpe kotonda ya mabe.”
To, “milimo na bino.”
To, “asambelaka na ndenge oyo ebongi.”