Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

1 | Koponaka bilongi te

1 | Koponaka bilongi te

Liteya ya Biblia:

“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo na boyengebene andimami na ye.”​MISALA 10:34, 35.

Elimboli nini?

Yehova * Nzambe asalelaka biso makambo te na kolanda ekólo na biso, loposo ya nzoto na biso, to mpe mimeseno na biso. Kasi, atalelaka nde makambo ya ntina, na ndakisa, bomoto na biso ya kati mpe makanisi na biso. Biblia elobi mpe ete “moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova amonaka ndenge motema ezali.”​—1 Samwele 16:7.

Oyo okoki kosala:

Atako tozali na likoki te ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato, tokoki komekola Nzambe mpe kotalela bato kozanga kopona bilongi. Talelá moto na moto ndenge azali, na esika ya kotalela etuluku moko boye ya bato na mbala moko. Soki omoni ete ozali kotalela basusu na ndenge ya mabe, na ndakisa, bato ya loposo mosusu to ya mboka mosusu, bondelá Nzambe mpe sɛngá ye asalisa yo olongola makanisi yango ya mabe. (Nzembo 139:23, 24) Soki osɛngi Yehova na bosembo mpenza ete apesa yo makasi mpo oponaka bilongi te, yebá ete akoyoka libondeli na yo mpe akosalisa yo.​—1 Petro 3:12.

^ Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.

“Nazwaki naino libaku te ya kofanda na kimya na mondɛlɛ. . . Nakómaki mpenza na kati ya libota monene ya bandeko ya mokili mobimba.”​—TITUS