Emoniseli epai ya Yoane 21:1-27

  • Likoló ya sika ná mabele ya sika (1-8)

    • “Liwa ekozala lisusu te (4)

    • “Biloko nyonso biloko ya sika” (5)

  • Yerusaleme ya sika elimbolami (9-27)

21  Mpe namonaki likoló ya sika ná mabele ya sika;+ mpo likoló ya kala mpe mabele ya kala elekaki,+ mpe mbu+ ezali lisusu te.  Namonaki mpe engumba mosantu, Yerusaleme ya Sika, euti na likoló epai ya Nzambe+ ezali kokita mpe ebongisami lokola mwasi ya libala oyo abongisi nzoto mpo na mobali na ye.+  Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango.+  Mpe akopangwisa mai ya miso nyonso na miso na bango,+ mpe liwa ekozala lisusu te,+ matánga* te, koganga te, mpasi mpe ekozala lisusu te.+ Makambo ya kala eleki.”  Mpe Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi+ alobaki ete: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.”+ Alobaki lisusu ete: “Komá, mpo maloba oyo ezali sembo* mpe solo.”  Mpe alobaki na ngai ete: “Ekokisami! Ngai nazali Alfa ná Omega,* ebandeli mpe nsuka.+ Moto nyonso oyo azali na mposa ya mai, nakopesa ye ofele* mai oyo euti na liziba ya mai ya bomoi.+  Moto nyonso oyo alongi akozwa libula ya biloko wana, mpe ngai nakozala Nzambe na ye mpe ye akozala mwana na ngai.  Kasi bato ya bibangabanga, baoyo bazangi kondima,+ baoyo bazali na bosɔtɔ mpo na mbindo na bango, babomi-bato,+ bato ya pite,*+ baoyo basalaka misala ya bilimo mabe, basambeli ya bikeko ná bato nyonso oyo bakosaka,+ likabo na bango ekozala na laki oyo ezali kopela na mɔtɔ mpe na sufulu.+ Yango elakisi liwa ya mibale.”+  Moko ya baanzelu nsambo oyo bazalaki na mabakuli nsambo oyo etondaki na malɔzi nsambo ya nsuka+ ayaki, mpe alobaki ete: “Yaká, nakolakisa yo mwasi ya libala, mwasi ya Mwana-Mpate.”+ 10  Bongo amemaki ngai na nguya ya elimo tii na ngomba moko ya monene mpe ya molai, alakisaki ngai engumba mosantu Yerusaleme oyo euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita+ 11  mpe ezali na nkembo ya Nzambe.+ Kongɛnga na yango ezalaki lokola libanga ya ntalo koleka, lokola libanga ya jasipe oyo ezali kongɛnga lokola kristale.+ 12  Ezalaki na efelo moko ya monene mpe ya molai mpe ezalaki na baporte 12, mpe na baporte yango baanzelu 12, mpe bankombo oyo ekomamaki ezali bankombo ya mabota 12 ya bana ya Yisraele. 13  Na ɛsti ezalaki na baporte misato, na nɔrdi baporte misato, na sudi baporte misato mpe na wɛsti baporte misato.+ 14  Efelo ya engumba yango mpe ezalaki na mabanga 12 ya moboko, mpe likoló na yango ezalaki na bankombo 12 ya bantoma 12+ ya Mwana-Mpate. 15  Nzokande oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki mongendu moko ya wolo mpo na komeka, mpo ameka monene ya engumba yango, ya baporte na yango mpe ya efelo na yango.+ 16  Mpe engumba yango ezali karé, molai na yango ekokani na monene na yango. Amekaki monene ya engumba yango na mongendu wana, stade 12 000;* molai na yango ná monene na yango ná bosanda na yango ekokani. 17  Lisusu, amekaki efelo na yango, ezalaki mapeko 144,* na kolanda emekeli ya moto, oyo ezali mpe emekeli ya anzelu. 18  Efelo na yango etongamá na jasipe,+ mpe engumba yango ezalaki wolo ya pɛto lokola talatala ya pɛɛ. 19  Miboko ya efelo ya engumba yango ebongisamaki na mitindo nyonso ya mabanga ya ntalo: moboko ya liboso ezalaki jasipe, ya mibale safire, ya misato kalsedwane, ya minei emerode, 20  ya mitano sardonikse, ya motoba sardwane, ya nsambo krizolite, ya mwambe berile, ya libwa topazi, ya zomi krizopraze, ya zomi na moko yasɛnti, ya zomi na mibale ametiste. 21  Lisusu, baporte 12 ezalaki mayaka 12; porte mokomoko esalemaki na liyaka moko. Mpe balabala monene ya engumba yango ezalaki wolo ya pɛto, lokola talatala oyo emonisaka ngámbo na ngámbo. 22  Namonaki tempelo te na engumba, mpo Yehova* Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso+ azali tempelo na yango, ná Mwana-Mpate. 23  Mpe engumba yango ezali na mposa ya moi te, ya sanza mpe te mpo na kongɛngisa yango, mpo nkembo ya Nzambe ezalaki kopesa yango pole,+ mpe mwinda na yango Mwana-Mpate.+ 24  Mpe bikólo bakotambola na lisalisi ya pole na yango,+ mpe bakonzi ya mabele bakomema nkembo na bango kuna. 25  Mpe baporte na yango ekokangama ata moke te na moi, mpo kuna butu ekozala te.+ 26  Mpe bakomema nkembo mpe lokumu ya bikólo kuna.+ 27  Kasi eloko nyonso oyo ezali mbindo mpe baoyo nyonso basalaka likambo moko ya bosɔtɔ mpe babukaka lokuta bakokɔta kuna te;+ kaka baoyo nkombo na bango ekomami na rulo ya bomoi ya Mwana-Mpate nde bakokɔta.+

Maloba na nse

To, “ebongi kotyelama motema.”
To, “A ná Z.” Alfa ná Omega ezali lɛtrɛ ya liboso mpe lɛtrɛ ya nsuka ya alfabɛ ya monɔkɔ ya Grɛki.
To, “kozanga kofuta.”
Soki 2 220 km. Stade moko ekokani na 185 m. Talá Ap. B14.
Soki 64 m. Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.