Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge oyo matoi ya liyoyo ya Amerika eyokaka ekamwisaka

Ndenge oyo matoi ya liyoyo ya Amerika eyokaka ekamwisaka

MATOI ya liyoyo ya Amerika ya Sudi (Copiphora gorgonensis) ekoki ata milimɛtrɛ moko te na molai, kasi eyokaka kaka ndenge oyo matoi ya moto eyokaka. Liyoyo yango ekoki koyeba kokesenisa makelele ndenge na ndenge na mosika mpenza. Na ndakisa, ekoki koyeba makelele ya liyoyo mosusu mpe oyo ya ngembo oyo ezali koluka eloko ya kolya.

LITOI YA LIYOYO YA AMERIKA

Talelá likambo oyo: Matoi ya liyoyo yango ezali na makolo na ye mibale ya liboso. Ndenge kaka litoi ya moto esalaka, litoi ya liyoyo ya Amerika ezwaka makelele, ebongoli yango mpe eluki koyeba soki ezali makelele ya nini. Kasi, bato ya mayele bamoni ete liyoyo yango ezali na enama moko ya ntina mingi na kati ya litoi na yango​—mwa saki moko ya mwa molai oyo etondi na mai mpe, oyo ezali lokola eloko ya mpema. Enama yango, oyo bato wana babengaka yango vésicule, esalaka lokola cochlée, mwa eteni moko oyo ezalaka na kati mpenza ya litoi ya banyama to bato; kasi ezalaka moke mpenza. Yango nde esalaka ete lolenge oyo matoi ya liyoyo ya Amerika eyokaka ekamwisa.

Profesɛrɛ moko na nkombo Daniel Robert ya makambo etali bioloji na iniversite ya Bristol na Royaume-Uni, alobi ete likambo yango ekosalisa bato ya mayele “bákolisa bamasini ya lolaka oyo ezali mike mpenza mpe ekóma kosala malamu mingi koleka ndenge ezalaki liboso.” Bato ya mayele bandimi mpe ete likambo yango ekosalisa mpe bato ya mayele ya mikolo oyo ezali koya mpo bábimisa bamasini oyo ekobanda kobimisa lolaka makasi mpe bamasini oyo bazwaka na yango bililingi ya bato ya maladi na balopitalo.

Okanisi nini? Ndenge oyo matoi ya liyoyo ya Amerika eyokaka, ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?