Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ebimá kaka yango moko?

Nzoto ya moto

Likoki oyo nzoto ya moto ezalaka na yango ya kokaukisa mpota

Ndenge nini bato ya mayele bazali komekola likoki yango na baplastiki oyo bazali kosala mikolo oyo?

Banyama ya mokili

Mposo ya nyama babengi loutre de mer

Banyama mingi oyo emɛlisaka bana mabɛlɛ (mammifères) mpe efandaka na mai ya malili ezalaka na mposo oyo ebatelaka yango mpo eyoka malili mingi te. Kasi loutre de mer ezalaka ndenge mosusu.

Mosala oyo mandɛfu ya nyau esalaka

Mpo na nini bato ya siansi bazali kosala barobo oyo ezali na mwa aparɛyi oyo ezali kosala lokola mandɛfu ya nyau?

Ndenge oyo mbwa eyokaka nsolo

Zolo ya mbwa ezalaka nini oyo ekoki kotinda bato ya siansi básalela yango mpe báluka ndenge ya kosala baaparɛyi oyo ezali lokola zolo ya mbwa?

Lokolo ya mpunda

Mpo na nini ba-ingénieur balongi te komekola lokolo ya mpunda?

Kɔle oyo mbɛmbɛ babengi limace ebimisaka

Kɔle oyo basali lokola kɔle ya mbɛmbɛ oyo babengi limace ekoki kosalisa mingi na kosala lipaso kozanga ete básalela ntonga mpo na kotonga bampota.

Bambisi mpe banyama mosusu ya mai

Mposo ya mbisi babengi requin​—Ebimá kaka yango moko?

Ndenge nini mposo ya mbisi babengi requin ebatelaka yango na banyama mosusu?

Libɛ́lɛ (nageoire) ya balɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá

Talá ndenge oyo mabɛìlɛ ya mbisi yango ya monene esalaka ekoki kobongola makambo mosusu na bomoi na yo.

Likoki oyo loposo ya baleine-pilote ezali na yango ya komipɛtola

Mpo na nini bakompanyi ya masuwa basepeli na likoki yango?

Makelele oyo mbisi babengi dauphin ebimisaka

Bato ya siansi bazali na mposa ya kosala baaparɛyi oyo ekozala na likoki ya kokamwa oyo dauphin ezalaka na yango ya kotala mpe koyeba esika efandaka.

Ndenge mino ya mbɛmbɛ babengi patelle esalemá

Nini esali ete mino ya mbɛmbɛ babengi patelle esalemá eleka ata mpe nsinga ya ndako ya limpulututu (araignée)?

Kole ya mwa nyama babengi balane

Balobaka ete kole ya mwa banyama babengi balane eleki oyo bato basalaka. Kasi ndenge oyo mwa banyama yango ebakamaka na bisika ya maimai euti koyebana kaka mikolo oyo.

Bansingansinga ya mbɛmbɛ ya mai oyo babengi moule

Mbɛmbɛ ya mai esalelaka bansingansinga yango mpo ekangana na eloko moko. Koyeba ndenge oyo yango esalaka ekoki kosalisa mpo na kobimisa bisaleli ya sika mpe ya malamu ya kokangisa biloko ya kotongela bandako to kokangisa mikuwa na misisa ya minene.

Mposo ya mbɛmbɛ

Mposo ya mbɛmbɛ mpe ndenge oyo esalemá ebatelaka mbɛmbɛ.

Likoki oyo nzoto ya mwa nyama babengi seiche ezalaka na yango ya kobongola balangi

Bato ya mayele bazali koluka komekola likoki ya nyama yango na kosala elamba oyo ekoki kobongola balangi na yango kaka na sɛgɔnde.

Eteni oyo ebimisaka pole na nzoto ya mwa nyama ya mai oyo babengi calmar hawaïen

Mwa nyama yango ebimisaka pole na yango moko​—kasi te mpo emona to bámona yango.

Mabɔkɔ ya nyama ya mai oyo babengi pieuvre ekamwisaka mpenza

Ba-ingénieur basalaki lobɔkɔ ya robo oyo ezali na makoki ya kokamwa oyo nyama yango ezalaka na yango.

Mokila mpunda ya mai

Mokila ya mpunda ya mai ekamwisaka mpenza na boye ete bato ya mayele balingi komekola yango mpo na kosala barobo.

Etuluku ya bambisi

Liteya nini tokoki kozwa epai ya mbisi mpo makama ya mituka ebimaka mingi te?

Ndenge mbisi babengi rémora ​​—Ebimá kaka yango moko?

Nini esalaka ete mbisi yango akangama makasi na nzoto ya bikelamu mosusu ya mai?

Bandɛkɛ

Likoki ya komibwaka mpe kokita na nse ya mai ya ndɛkɛ babengi fou de bassan​—Ebimá kaka yango moko?

Ndenge nini ndɛkɛ monene boye ebikaka ntango emibwaki na mai na nguya koleka mbala 20 nguya oyo mabele ezalaka na yango ya kobenda biloko?

Balangi oyo bandɛkɛ ezalaka na yango enzulukaka te

Ndenge nini balangi oyo bandɛkɛ ezalaka na yango enzulukaka te efungoli nzela ya kosala balangi mpe bilamba ya malamu koleka?

Lipapu ya esulungutu

Ndenge oyo lipapu ya esulungutu esalaka makelele te ekoki kosalisa mpo baaparɛyi oyo ezali lokola pakapaka esalaka makelele mingi te.

Ndenge nsɔngɛ ya mapapu ya bandɛkɛ oyo epumbwaka na vitɛsi makasi ebaluká

Lokola bamekolaki ndɛkɛ yango, ba-ingénieur oyo basalaka baaviɔ babatelaki balitre milio 7 600 ya balitre ya esansi na mbula mobimba.

Nini esalaka ete ndɛkɛ babengi albatros hurleur ebimisa makasi mingi te ntango ezali kopumbwa?

Talá ndenge ndɛkɛ yango ekoki kopumbwa ntango molai kozanga ete ebɛtabɛta mapapu na yango!

Mayele oyo ndɛkɛ babengi barge rousse esalelaka ntango epumbwaka

Yekolá makambo etali mobembo ya kokamwa ya mikolo mwambe oyo ndɛkɛ yango esalaka.

Miselekete, ngando, nyoka mpe magorodo

Ndenge loposo ya moselekete babengi diable épineux ebendaka mai

Ndenge nini moselekete yango ebendaka mai kobanda na makolo mpo ekóma tii na monɔkɔ na yango?

Mokila ya moselekete babengi margouillat

Ndenge nini moselekete yango elongwaka na nse mpo na komata na efelo?

Mbanga ya ngando

Ekoki koswa makasi mbala misato koleka koswa ya nkɔsi to tigre. Kasi, eyebaka eloko nyonso oyo emateli yango koleka ndenge nsɔngɛ ya mosapi ya moto esalaka. Ndenge nini?

Mposo ya nyoka

Nini esalaka ete mposo ya nyoka ezala makasi mpo ekoka komata na nzete oyo ezali mabakumabaku to etimola libulu na zɛlo ya mabangamabanga?

Mayele oyo ligorodo oyo ebombaka bana na estoma esalelaka mpo na kobota

Mpo na nini moto moko ya evolisyo alobi ete mbongwana ya malɛmbɛ mpe oyo esalemaka mokemoke na nzoto ya ligorodo yango ezali likanisi oyo ebongi te?

Banyama ya mikemike

Mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita

Mpo na nini mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kokita ebongi mpe kosalelama mpo na kotambwisa barobo oyo epumbwaka?

Ndako ya nzoi

Banzoi eyebaki mayele nini mpo na kosalela malamu esika oyo etongaka ndako na yango, mayele oyo bato ya matematiki bayebaki yango kaka na 1999?

Bafurmi esalaka nini mpo ekanganela nzela te?

Bafurmi ekanganelaka nzela te. Esalelaka mayele nini?

Nkingo ya furmi

Ndenge nini furmi ememaka eloko oyo eleki nzoto na yango na kilo mosika mpenza?

Furmi oyo esukolaka ba antɛnɛ na yango (fourmi charpentière)

Esɛngaka bopɛto mpo mwa banyama yango ekufa te. Ekokisaka mokumba yango ya libosoliboso ndenge nini?

Ndenge furmi oyo engɛngaka lokola palata ebatelamaka na moi ya esobe ya Sahara

Furmi yango ezali moko ya banyama oyo moi makasi ebomaka yango te. Nini esalaka ete ekufa te ata na moi makasi ya ndenge nini?

Bomoi ya mwa nyama babengi likenge

Bomoi ya kokamwa ya mwa nyama yango emonisi ete ebimaka kaka mwa bapɔsɔ nsima ya mbula 13 to 17.

Baangrenaje ya mwa nyama babengi cigale bossue

Ezalaka na ntina mingi mpo mwa nyama yango ezala na likoki ya kopumbwa makasi mpe na ndenge ya malamu.

Ndenge baselile ya bɔɔngɔ ya liyoyo to libanki esalisaka yango eyeba likama noki

Ndenge nini mabanki etutanaka te ntango ezali kopumbwa ebele?

Ndenge oyo matoi ya liyoyo ya Amerika eyokaka ekamwisaka

Litoi ya liyoyo yango esalaka lokola oyo ya matoi ya bato. Ndenge nini bolukiluki oyo bato ya mayele basali mpo na lolenge wana oyo matoi ya liyoyo yango eyokaka esalisi bato ya siansi lelo?

Lipapu ya lipekapeka

Lipapu ya lipekapeka babengi Morpho bleu, emonanaka pɛtɛpɛtɛ, kasi emonanaka malamumalamu na mikroskope. Biloko yango ezali nini?

Ndenge lipapu ya lipekapeka ebendaka pole

Longola langi ya moindo ya mapekapeka mosusu, esɛngaka mpe eloko mosusu.

Ndenge lipekapeka oyo babengi piéride du chou etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V

Tokoloba boni mpo na lipekapeka babengi piéride du chou oyo esalisi ba-ingénieurs básala ba-panneaux solaires ya malamu koleka?

Matoi ya mwa nyama babengi Fausse teigne eyokaka na ndenge ya kokamwa mpenza

Na matoi na ye ya mindɔndɔ te, akoki kosala likambo malamu koleka nyama ya lolenge nyonso.

Likoki oyo mwa nyama oyo elyaka nyɛi (coléoptère) ezalaka na yango ya koyeba nzela

Mwa nyama yango esalelaka mayele nini mpo na kotambola na butu? Mpe bato bakoki koyekola nini epai ya mwa nyama yango?

Miinda ya mwa nyama babengi luciole to epela mwinda

Ndenge nini mwa nyama yango esalisi bato ya siansi bákómisa makasi miinda ya baaparɛyi?

Likoki ya kobaluka nokinoki ya nzinzi oyo elyaka mbuma

Nzinzi babengi drosophile, ezali na likoki ya kobaluka lokola aviɔ ya bitumba, kasi nzinzi yango esalaka muvema yango kaka na mwa segɔnde.

Banzete

Langi makasi ya bleu ya mbuma ya Pollia condensata

Mbuma ya Pollia condensata ezalaka te na eloko oyo ebimisaka langi ya bleu, kasi ezali molona oyo ezalaka na langi ya bleu ya makasi koleka milona nyonso. Nini esalaka ete mbuma yango ezala na langi makasi bongo?

Ndenge banzete esalaka makambo na kalkile

Bato ya mayele bamonaki ete nzete ya mutarde ezalaka na likoki moko ya kokamwa mpenza.

Microscopic World

Bamikrobɛ oyo esilisaka petrole makasi

Ekoki kopɛtola mai oyo ebebi na petrole malamu koleka mayele ya teknoloji ya mikolo oyo.