Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mposo ya nyoka

Mposo ya nyoka

LOKOLA nyoka ezalaka na mabɔkɔ ná makolo te, ebongi ete mposo na yango ezala makasi mpo etambola malamu kozanga mikakatano. Banyoka mosusu emataka na nzete ya mabakumabaku, mosusu mpe etimolaka mabulu na zɛlo ya mabangamabanga. Nini esalaka ete mposo ya nyoka ezala makasi bongo?

Tókanisa naino: Lolenge ndenge na ndenge ya nyoka ezalaka na mposo oyo ekeseni na oyo ya bamosusu na kotalela ndenge oyo yango esalemá mpe monene na yango. Ata bongo, mposo ya banyoka nyonso ekokani na eloko moko: Libándá na yango ezalaka makasi mpe ekómaka mokemoke pɛtɛɛ na kati. Ezali na litomba nini? Marie-Christin Klein, moto moko ya mayele, alobi boye: “Eloko oyo ezalaka naino makasi na libándá mpe ekómaka pɛtɛɛ na kati ekoki kopanza nguya na yango mosika mpenza.” Ndenge oyo mposo ya nyoka ezalaka, esalaka ete ezala na makasi oyo esengeli mpo ebendana malamu na mabele mpe kaka na ntango yango epanzaka kutu nguya na yango na esika ya mabanga oyo ekoki kozokisa yango mpo mposo na yango ebeba mingi te. Ezali na ntina ete mposo yango ezala makasi, mpo mbala mingi, nyoka elongolaka mposo kaka nsima ya sanza mibale to misato.

Biloko oyo basali yango na kolanda ndenge mposo ya nyoka ezalaka ekoki kosalisa minganga; na ndakisa mpo na kosala biloko oyo ebatelaka mpo moto akwea te na esika ya mosɛlu mpe biloko oyo eumelaka mpenza, oyo bakɔtisaka na nzoto ya moto na ntango ya lipaso. Kosala mpe bamasini oyo ememaka biloko, oyo esalemi mpenza lokola mposo ya nyoka, ekoki kosɛnga mafuta mingi te (lubrifiant), oyo ebebisaka mopɛpɛ.

Okanisi nini? Mposo ya nyoka ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?