Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BOMOI EBANDAKI NDENGE NINI?

Eyano oyo ebongi kotalela yango

Eyano oyo ebongi kotalela yango

NSIMA ya kotalela makambo mosusu, bato mingi bamoni ete moto moko ya mayele mingi nde asalá bomoi. Tózwa ndakisa ya Antony Flew, profesɛrɛ moko ya filozofi, oyo liboso azalaki mpenza kondima te ete Nzambe azalaka. Ntango ayekolaki makambo ndenge na ndenge ya kokamwa oyo etali bomoi mpe mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, abongolaki makanisi na ye. Atángaki maloba ya moto moko ya kala ya filozofi, akomaki boye: “Tosengeli kolanda makambo oyo ezali kondimisa ete bomoi ebimá yango moko te, ata soki esepelisi biso te.” Mpo na profesɛrɛ Flew, ezali na makambo oyo endimisi ete Mozalisi azali.

Gerard, oyo tolobelaki liboso na masolo oyo, alobaki mpe bongo. Atako atángaki mingi mpe alekisaki bambula ebele na koyekola banyama mikemike, alobi boye: “Namoná ata eloko moko te oyo endimisi ete bomoi ebimá kaka boye na eloko moko oyo ezangá bomoi. Ndenge oyo bikelamu ya bomoi esalaka makambo na molɔngɔ mpe ezali na makambo ndenge na ndenge, endimisaki ngai ete ezali na moto moko oyo abongisá mpe asalá yango.”

Kaka ndenge moto akoki koyeba moto moko ya misala ya mabɔkɔ na misala na ye, koyekola biloko oyo ezali na mokili esalisaki mpe Gerard ayeba bizaleli ya Mozalisi. Gerard azwaki mpe ntango ya kotalela Biblia, buku ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Azwaki biyano ya malamu na Biblia na mituna etali istware ya bato mpe ndenge ya kolonga mikakatano oyo bakutanaka na yango lelo. Yango endimisaki ye mpe ete Biblia ezali buku ya Nzambe.

Gerard amonaki ete ebongi mpenza kotalela biyano ya Biblia. Tolendisi yo mpe otalela yango.