Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndako ya nzoi

Ndako ya nzoi

BANZOI oyo babengi (Apis mellifera) etongaka ndako na yango na mafuta (cire) oyo ebimaka na nse ya libumu na yango. Balobaka ete ndako ya nzoi etongamá na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Mpo na nini?

Tókanisa naino: Banda basiɛklɛ mingi bato ya matematiki bamonaki ete soki bakaboli esika moko na ndenge oyo hexagone ezalaka, ezalaka malamu koleka soki bakaboli yango na ndenge ya triangle to karé to eloko mosusu nyonso ya ndenge wana mpo esalaka ete básalela mwa bisaleli moke mpo na kotonga esika ya monene. Kasi, bakokaka te kolimbola mpo na nini ezalaka bongo. Na 1999, profesɛrɛ Thomas Hales amonisaki ete kotonga eloko na ndenge oyo ndako ya nzoi ezalaka ezali malamu mingi koleka. Amonisaki mpe ete kokabola esika na ndenge oyo hexagone ezalaka, ezali malamu koleka mpo esika ekabolama ndenge moko mpe ezala makasi.

Ndenge banzoi etongaka bashambrɛ ya ndako na yango ndenge oyo hexagone ezalaka, esalisaka yango esalela malamu koleka esika nyonso oyo ezali na yango mpo na kotonga ndako ya makasi, oyo ezali molili te na mwa mafuta moke (cire) mpe ebomba ebele ya mafuta na yango na ndako yango. Tokoki kokamwa te soki balobaka ete ndako ya nzoi etongamá na ndenge ya kokamwa mpenza.

Lelo oyo, bato ya siansi bamekolaka ndako ya nzoi mpo na kosala biloko oyo ezali na bisika ebele mpe makasi. Na ndakisa, bato oyo basalaka baaviɔ bakómi kosalela mayele oyo nzoi esalelaka mpo na kotonga ndako na yango mpo básala baaviɔ ya makasi mpe oyo ezali molili te, mpo esalelaka kérosène mingi te.

Okanisi nini? Ndako ya nzoi oyo ebongisamá na ndenge ya malamu mpenza, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?